3
Ebosono abiki
Ezalaki mokolo moko, Petelo mpe Yoane bakendeki na Tempelo na tango ya mabondeli : ezalaki na ngonga ya misato sima na midi. Nzokande, ezalaki mpe na bato moko oyo bazalaki komema moto moko akufa makolo wuta abotama, mpe bazalaki kotia ye mikolo nyonso na ekuke ya Tempelo mpo ete asengaka mbongo epai ya bato oyo bazalaki kokota. Bazalaki kobenga ekuke yango « Ekuke ya kitoko. » Tango amonaki Petelo mpe Yoane kokota na Tempelo, asengaki bango likabo ya mawa.
Boye, Petelo mpe Yoane batalaki ye malamu, mpe Petelo alobaki na ye :
— Tala biso !
Moto yango atalaki bango malamu penza, na likanisi ya kozwa eloko epai na bango.
Kasi Petelo alobaki na ye :
— Nazangi mbongo to wolo ya kopesa yo, kasi oyo nazali na yango, nazali kopesa yo yango : na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.
Bongo, asimbaki ye na loboko ya mobali mpe atelemisaki ye. Mbala moko, makolo na ye ekomaki makasi. Mbala moko, atelemaki mpe abandaki kotambola, akotaki nzela moko na bango kati na lopango ya Tempelo : azalaki kotambola, kopumbwa mpe kokumisa Nzambe.
Tango bato nyonso bamonaki ye kotambola mpe kokumisa Nzambe, 10 basosolaki ete ezali moto oyo azalaki kovanda na « Ekuke ya kitoko » ya Tempelo mpo na kosenga makabo ya mawa. Bango nyonso bakamwaki mingi penza, mpe somo ekangaki bango mpo na makambo oyo esalemaki epai na ye.
Petelo alimboli likamwisi yango
11 Lokola moto yango atingamaki na Petelo mpe Yoane, bato nyonso bakamwaki mpe bayaki na lombangu epai na bango, na esika oyo babengaka « Veranda ya Salomo. » 12 Tango Petelo amonaki bongo, alobaki na bango :
— Bato ya Isalaele, mpo na nini bozali kokamwa likambo oyo ? Mpo na nini bozali kotala biso lokola nde biso bato tosali ete moto oyo atambola, na nzela ya nguya mpe botosi na biso kati na makambo ya Nzambe ? 13 Biso te ! Ezali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso, nde apesi nkembo na Yesu, Mosali na Ye, oyo bino bokabaki mpo ete baboma Ye. Yango wana, bowanganaki Ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola Ye. 14 Bowanganaki Ye oyo azali Mosantu mpe Sembo. Boye, bosengaki ete Pilato atikela bino mobomi na esika ya Yesu. 15 Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, bongo biso tozali penza batatoli ya likambo yango.
16 Ezali na nzela ya kondima kati na Kombo na Yesu nde moto oyo bozali komona mpe boyebi azwi makasi ya kotelema. Ezali Kombo na Yesu mpe kondima oyo ewuti kati na Yesu nde ekomisi nzoto na ye mobimba kolongono ndenge bozali komona yango.
17 Sik’oyo bandeko na ngai, nayebi ete bosalaki makambo na kozanga boyebi, ndenge bakonzi na bino basalaki. 18 Kasi ezali ndenge wana nde Nzambe akokisaki makambo oyo aloba wuta kala na nzela ya basakoli nyonso, ete Klisto na Ye asengeli komona pasi. 19 Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa masumu na bino, 20 mpe mpo ete Nkolo akoka kopesa bino tango ya kopema mpe akoka kotindela bino Klisto oyo apona mpo na bino—Ye nde Yesu. 21 Asengeli kotikala kuna na Likolo kino na tango oyo Nzambe akobongisa biloko nyonso, ndenge alaka yango wuta kala na nzela ya babulami na Ye, basakoli. 22 Pamba te Moyize alobaki : « Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino ; bosengeli kotosa nyonso oyo akoloba na bino. 23 Moto nyonso oyo akotosa te mosakoli yango, bakolongola ye kati na bato na ye na nzela ya kufa. »
24 Basakoli nyonso, kobanda na Samuele kino na basakoli oyo bayaki sima na ye, bango nyonso basakolaki na tina na makambo oyo ezali kosalema na mikolo oyo. 25 Bino nde bozali bakitani ya basakoli mpe ya Boyokani oyo Nzambe asalaki elongo na bakoko na bino, tango alobaki na Abrayami : « Nakopambola mabota nyonso ya mokili na nzela ya bakitani na yo ! » 26 Tango Nzambe asekwisaki Mosali na Ye, atindaki Ye nanu epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola, moko na moko kati na bino, mosika na banzela na bino ya mabe.