5
Anania mpe Safira
Nzokande, ezalaki na moto moko na kombo Ananiasi. Atekaki eteni ya mabele na ye na boyokani na Safira, mwasi na ye. Abombaki ndambo ya mbongo mpo na ye moko, boye amemaki ndambo oyo etikalaki mpe apesaki yango na bantoma. Mwasi na ye mpe ayebaki yango.
Boye, Petelo atunaki ye :
— Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo ? Boni, liboso ete oteka yango, ezalaki ya yo te ? Mpe sima na koteka yango, okokaki te kosala na mbongo yango likambo nyonso oyo motema na yo elingi ? Mpo na nini ozwaki likanisi ya kosala likambo ya boye ? Okosi bato te, kasi okosi nde Nzambe !
Tango Ananiasi ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo. Boye, bilenge mibali bayaki, bazipaki nzoto na ye mpe bamemaki yango libanda mpo na kokunda yango.
Sima na ngonga pene misato, mwasi ya Ananiasi akotaki, kasi ayebaki te likambo oyo ewutaki kosalema.
Petelo atunaki ye :
— Yebisa ngai, ezali na talo wana nde yo mpe Ananiasi botekaki elanga wana ?
Safira azongisaki :
— Ezali bongo, etekamaki Kaka na talo wana.
Petelo alobaki na ye :
— Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.
10 Kaka na tango yango, akweyaki liboso ya Petelo mpe akufaki. Boye tango bilenge mibali bakotaki, bakutaki ye ya kokufa. Bamemaki ye mpe bakendeki kokunda ye pembeni ya mobali na ye. 11 Somo monene etondisaki Lingomba mobimba mpe bato nyonso oyo bayokaki sango yango.
Bantoma babikisi babeli ebele
12 Bantoma bazalaki kosala bilembo mingi ya kokamwa mpe misala minene kati na bato. Boye, bandimi nyonso bazalaki na momesano ya kosangana na veranda ya Salomo. 13 Moko te kati na bato oyo bazalaki na lisanga na bango te azalaki komeka kosangana na bango, ata bato bazalaki kopesa bango lokumu mingi. 14 Nzokande, mibali mpe basi ebele penza bazalaki kondimela Nkolo mpe kobakisama na lisanga na bango. 15 Bongo, bazalaki komema babeli na babalabala, kolalisa bango na bambeto mpe na bitoko mpo ete tango Petelo akoleka, elilingi na ye ekoka kozipa bamoko kati na bango. 16 Mpe lisusu, bato ebele oyo bazalaki kowuta na bingumba ya zingazinga bazalaki kosangana na Yelusalemi ; bazalaki komema babeli na bango mpe bato oyo bazalaki kotungisama na milimo ya mbindo ; mpe bango nyonso bazalaki kobikisama.
Konyokwama ya bantoma
17 Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso oyo bazalaki kosala na ye elongo, oyo bazalaki bato ya lisanga ya Basaduseo, batondaki na zuwa. 18 Bakangaki bantoma mpe babwakaki bango na boloko ya monene. 19 Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko, abimisaki bantoma mpe alobaki na bango :
20 — Bokende kotelema kati na Tempelo mpe kuna, boyebisa bato maloba nyonso ya bomoi oyo ya sika.
21 Bantoma batosaki. Boye, na tongo-tongo, bakotaki na Tempelo mpe bakomaki koteya bato. Tango mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato oyo basalaka na ye elongo bakomaki, babengisaki Likita-Monene—lisanga mobimba ya bakambi ya bana ya Isalaele—mpe bapesaki mitindo ete bakende kozwa bantoma na boloko.
22 Kasi tango bakengeli bakomaki na boloko, bakutaki bango te. Bazongaki mpe balobaki :
23 — Tokuti boloko ya kokangama malamu mpe bakengeli liboso ya bikuke ; kasi tango tofungoli yango, tomoni ata moto moko te na kati.
24 Tango mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe bayokaki sango yango, bakomaki mitema likolo mpe bakomaki kotunana soki likambo yango ekosuka ndenge nini.
25 Bongo moto moko ayaki koyebisa bango :
— Boyoka ! Bato oyo bobwakaki na boloko, batelemi kuna na Tempelo mpe bazali koteya bato.
26 Mbala moko, mokonzi ya bakengeli akendeki elongo na basoda na ye mpo na kozwa bantoma. Kasi amemaki bango na makasi te, pamba te bazalaki kobanga ete bato babamba bango mabanga.
27 Wana bamemaki bango, batiaki bango liboso ya Likita-Monene, mpe mokonzi ya Banganga-Nzambe abandaki kotuna bango mituna. 28 Alobaki :
— Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sik’oyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana.
29 Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki :
— Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te ! 30 Nzambe ya bakoko na biso asekwisaki Yesu kati na bakufi, Yesu oyo bino bobomaki mpe bobakaki na nzete. 31 Ezali Ye nde Nzambe atomboli na nzela ya loboko na Ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bana ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango. 32 Biso, tozali batatoli ya makambo oyo ; ndenge moko mpe Molimo Mosantu oyo Nzambe apesaki na bato oyo batosaka Ye azali motatoli ya makambo yango.
33 Tango bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bazwaki mokano ya kobomisa bantoma. 34 Kasi Mofarizeo Gamalieli, molakisi ya Mobeko mpe moto ya lokumu mingi na miso ya bato nyonso, atelemaki kati na Likita-Monene mpe atindaki ete babimisa bantoma mpo na mwa tango moke. 35 Alobaki na bango :
— Bato ya Isalaele, bosala keba mpo na makambo oyo bolingi kosala bato oyo. 36 Eleki mikolo mingi te, moto moko na kombo Teodasi awutaki kobima. Azalaki komimona moto monene, mpe bato pene nkama minei bazalaki kolanda ye. Kasi tango babomaki ye, bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki mpe lisanga na ye ekufaki. 37 Sima na ye, tango tozalaki kotanga motango ya bato kati na mokili, moto moko mpe lisusu na kombo Yuda, moto ya Galile, abimaki mpe amemaki bato ebele na botomboki. Ye mpe lisusu babomaki ye, bongo bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki. 38 Yango wana, na likambo oyo, boyoka toli na ngai : Bokota lisusu makambo ya bato oyo te mpe botika bango bakende ! Pamba te soki makanisi to mosala na bango ewuti na moto, solo, ekosuka kaka na nzela. 39 Kasi soki yango ewuti na Nzambe, solo, bokolonga te kosukisa bato oyo. Bosala keba ete bobundisa Nzambe te. Bato ya Likita-Monene bandimaki likanisi ya Gamalieli, 40 babengisaki bantoma, babetisaki bango bafimbu mpe bapekisaki bango ete bateya lisusu Kombo ya Yesu te. Sima na yango batikaki bango kokende.
41 Bantoma balongwaki liboso ya Likita-Monene, na esengo mingi ya komona ete bakoki mpo na komona pasi na tina na Kombo na Yesu. 42 Mokolo na mokolo bazalaki kotika te koteya, mpe kosakola Sango Malamu na Tempelo to na ndako moko na moko ete Yesu azali Klisto.