4
Bomengo kati na nzungu ya mabele
Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te ; toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.
Mpe soki Sango Malamu oyo toteyaka ezali kaka ya kozipama, ezali ya kozipama kati na bato oyo bazali kobunga, ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe.
Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu. Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.
Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te ; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te ; tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te ; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.
10 Solo, tomemaka tango nyonso mpe bisika nyonso kufa ya Yesu kati na nzoto na biso, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso. 11 Pamba te, biso oyo tozali na bomoi, tokutanaka na kufa mpo na Yesu, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso, oyo ekufaka.
12 Boye, kufa esalaka mosala na yango kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala na yango kati na bino. 13 Mpe awa tozali na molimo wana moko ya kondima, kolanda ndenge ekomama : « Nandimaki, yango wana nalobaki, » biso mpe tondimaka, mpe yango wana tolobaka. 14 Pamba te toyebi malamu ete Ye oyo asekwisaki Nkolo Yesu kati na bakufi akosekwisa mpe biso elongo na Yesu, mpe akobimisa biso elongo na bino liboso na Ye.
15 Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.
16 Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.
17 Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya. 18 Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te ; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.