Mokanda epai ya
Bakolose
1
Ebandeli ya mokanda
Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote ;
 
Epai ya bandeko oyo, kati na engumba Kolose, bazali bule mpe bayengebene kati na Klisto :
 
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso !
 
Matondi mpe losambo
Tozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tango tosambelaka mpo na bino, pamba te toyokaki sango ya kondima na bino kati na Yesu-Klisto, mpe sango ya bolingo na bino mpo na basantu nyonso. Kondima mpe bolingo yango etongami na likolo ya elikya ya bomengo oyo Nzambe abongisela bino kati na Likolo ; elikya yango ebotamaki kati na bino tango boyokaki Liloba ya solo, Sango Malamu oyo ekomaki kino epai na bino. Sango Malamu yango epanzani mokili mobimba, ezali kobota bambuma ebele mpe ezali kokende liboso, ndenge kaka esalaki kati na bino wuta mokolo oyo boyokaki yango mpe bozwaki penza bososoli ya kokoka na tina na ngolu ya Nzambe.
Ezali molingami Epafrasi, moninga na biso ya mosala, nde ateyaki bino Sango Malamu yango ; azali mosali ya Klisto mpe asalaka na bosembo epai na bino. Ezali mpe kaka ye moto ayebisaki biso ndenge nini Molimo atindikaka bino na bolingo.
Tozali na nyonso kati na Klisto
Libondeli ya Polo
Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka, 10 mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe, 11 mpo ete bokoma bato na nguya kati na makambo nyonso kolanda makasi ya nkembo na Ye, mpo ete boyikela nyonso mpiko mpe bozala na molende mpe esengo kino na suka ; 12 mpe mpo ete, na esengo nyonso, bozongisaka matondi epai ya Tata oyo apesaki bino makoki ya kosangana na libula ya basantu kati na Bokonzi ya pole. Pamba te :
13 Akangolaki biso na bokonzi ya molili
mpe amemaki biso kati na bokonzi
ya Mwana na Ye ya bolingo,
14 oyo, kati na Ye,
tozwi lisiko mpe bolimbisi ya masumu.
15 Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te,
azala liboso ya bikelamu nyonso,
16 pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama
kati na Likolo mpe na mabele,
bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te,
milimo mpe bokonzi ya milimo,
bakonzi ya milimo mpe banguya.
Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu
nde nyonso ekelama.
17 Yesu azali liboso na nyonso,
mpe nyonso esimbama kati na Ye ;
18 azali moto ya nzoto na Ye,
oyo ezali Lingomba ;
azali ebandeli, Mosekwi ya liboso kati na bakufi,
mpo ete azala na bokonzi ya liboso kati na nyonso,
19 pamba te, kati na Ye, Nzambe asepelaki kovandisa
bonzambe na Ye nyonso
20 mpe kozongisa, na nzela ya Klisto,
boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso,
ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo,
na kotia kimia na nzela ya makila
oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.
21 Nzokande na kala, bozalaki mosika ya Nzambe mpe bozalaki banguna na Ye mpo na mabe nyonso oyo bozalaki kokanisa mpe kosala. 22 Kasi sik’oyo, Nzambe azongisi boyokani kati na Ye mpe bino na nzela ya kufa ya Yesu, Mwana na Ye, oyo akabaki nzoto na Ye ya bomoto lokola mbeka mpo na kotalisa bino epai ya Nzambe lokola bato ya bule, bazanga pamela mpe bazanga mbeba. 23 Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.
Etumba ya ntoma
24 Nazali sik’oyo kosepela na pasi oyo nazali komona mpo na bino ; pamba te pasi oyo Klisto atikalaki komona te, ngai nazali kokokisa yango kati na nzoto na ngai mpo na bolamu ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba. 25 Nakoma mosali na yango kolanda mokumba oyo Nzambe apesa ngai : mokumba ya koteya bino Liloba na Nzambe na mobimba na yango. 26 Sango Malamu ezali mabombami oyo Nzambe abomba wuta na ebandeli, kasi alakisi yango sik’oyo epai ya basantu na Ye. 27 Nzambe asepeli kolakisa bango bomengo ya nkembo, oyo evandi kati na mabombami ya mabongisi na Ye mpo na Bapagano. Mabombami yango ezali : Klisto kati na bino, elikya ya nkembo.
28 Ezali Ye Klisto nde biso tosakolaka, na kokebisa mpe na koteya moto nyonso, na bwanya nyonso, mpo na kokomisa moto nyonso ya kokoka kati na Klisto. 29 Ezali mpo na yango nde nasalaka mpe nabundaka na nzela ya makasi ya Klisto, oyo esalaka na nguya kati na ngai.