11
Na mobu ya liboso ya bokonzi ya Dariusi, moto ya Medi, nazalaki wana mpo na kosunga mpe kobatela ye.
Bitumba ya bakonzi ya sude mpe ya nor
Sik’oyo, nakoloba na yo solo ya likambo : « Bakonzi misato bakobima lisusu mpo na Persi ; bongo mokonzi ya minei akobima lisusu, kasi akoleka bakonzi nyonso oyo bayaki liboso na ye na bomengo. Tango bomengo na ye ekopesa ye nguya, akosala ete bato nyonso batombokela Grese. Kasi mokonzi moko ya nguya koleka akobima mpe akokamba na nguya nyonso, akosala makambo oyo alingi. Sima na kolendisama ya bokonzi na ye, mokili na ye ekobebisama mpe ekopanzana bipai na bipai ; bakitani na ye bakozwa lisusu bokonzi te mpe mokili yango ekozala lisusu na nguya te, pamba te bakobotola yango mpe bakokaba yango na bato mosusu.
Mokonzi ya sude akokoma makasi koleka, kasi moko ya bakonzi na ye ya basoda akokoma lisusu makasi koleka ye mpe akotambolisa mokili na nguya makasi koleka. Sima na mibu ebele, akosala boyokani elongo na bakonzi mosusu. Mwana mwasi ya mokonzi ya sude akokende kosala boyokani elongo na mokonzi ya nor, kasi akobatela bokonzi na ye te, mpe bakitani na ye bakowumela te. Na mikolo wana, akokufa, ye elongo na bato oyo bamemaki ye na bokonzi, tata na ye mpe mosungi na ye.
Moko kati na bakitani na ye akobima mpe akozwa esika na ye ; akobundisa mampinga ya mokonzi ya nor mpe akokota kati na engumba na ye, oyo batonga makasi ; akobundisa bango mpe akolonga bango. Akozwa banzambe na bango ya bikeko, bikeko na bango oyo basala na bibende, biloko na bango ya motuya oyo basala na wolo mpe na palata mpe akomema yango na Ejipito. Akozala mosika ya mokonzi ya nor na mwa mibu. Mokonzi ya nor akokota na makasi kati na mokili ya mokonzi ya sude, kasi akozonga na mokili na ye.
10 Bana ya mokonzi ya nor bokobongama mpo na bitumba mpe bakosangisa mampinga ya basoda ebele, bongo bakomema lokola mpela biloko nyonso oyo bakomona na nzela ; bakobunda bitumba makasi kino na ndako batonga makasi ya mokonzi ya sude. 11 Mokonzi ya sude akobima na kanda, akosangisa mampinga moko monene, akobundisa mokonzi ya mokili ya nor mpe akolonga ye. 12 Tango bakolonga mampinga ya mokonzi ya nor, mokonzi ya mokili ya sude akotondisama na lolendo mpe akoboma bato ebele, kasi elonga na ye ekowumela te. 13 Pamba te mokonzi ya mokili ya nor akosangisa mampinga monene ya basoda koleka oyo ya liboso mpe, sima na mibu ebele, akozonga elongo na mampinga ya basoda ebele mpe na bibundeli ebele.
14 Na tango wana, bato ebele bakotombokela mokonzi ya mokili ya sude. Bato ya mobulu kati na bato na yo, Daniele, bakotomboka mpo ete emoniseli ekokokisama, kasi bakolonga te. 15 Mokonzi ya mokili ya nor akoya kotonga mwa bangomba ya mabele zingazinga ya engumba oyo batonga makasi mpe akobotola yango. Mampinga ya basoda ya mokonzi ya sude bakokoka kobundisa ye te. Ezala basoda na bango ya mpiko, bakozala ata na makasi ya kobunda te. 16 Mokonzi ya nor akosala makambo nyonso oyo alingi mpe moto moko te akokoka kotelema liboso na ye. Akovanda na mokili oyo eleki kitoko mpe akobebisa yango. 17 Akozwa mokano ya koya elongo na mampinga ya mokili na ye mobimba mpe akosala boyokani elongo na mokonzi ya sude. Mokonzi ya nor akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpo ete akoka kobebisa mokili na ye, kasi mabongisi na ye ekolonga te mpe akozwa mokili yango te. 18 Akokitela bisanga mpe akobotola ebele kati na yango. Kasi atako bongo, mokonzi ya mampinga moko ya basoda akosukisa lolendo na ye mpe akozongisela ye mabe mpo na lolendo na ye. Mokonzi ya nor akokoka lisusu kosala eloko moko te. 19 Sima na yango, akozonga na bandako batonga makasi ya mokili na ye, kasi akobeta libaku mpe akokweya ; bongo bakotikala komona ye lisusu te.
20 Mokitani na ye akotinda mofutisi mpako moko na esika oyo eleki lokumu kati na mokili. Sima na mwa mikolo, mokonzi mpe akobebisama, kasi ekozala na botomboki te mpe na bitumba te. 21 Moto moko azanga ata tina mpe batikala kopesa ata lokumu ya bokonzi te akokitana na ye ; akoya na tango ya kimia mpe akozwa bokonzi na nzela ya mayele mabe. 22 Mampinga ya banguna bakokweya liboso na ye, mampinga yango mpe mokonzi ya boyokani bakobebisama. 23 Atako basalaki boyokani elongo na ye, akosalela kaka mayele mabe ; akobebisa boyokani oyo basalaki, akobundisa bango mpe akolonga na nzela ya bato moke kaka. 24 Na tango ya kimia, akokota na makasi kati na bituka oyo etonda na bomengo mpe akokokisa makambo oyo ata moko te kati na batata to bakoko na ye batikala kosala : akobotola na makasi biloko mpe bomengo ya mokili, bongo akokabola yango epai na bato na ye ; akosala mabongisi ya kobundisa bingumba batonga makasi, kasi nyonso wana kaka ekowumela tango moke.
25 Akovandisa makanisi na ye mpe akotelema na mpiko, akosangisa mampinga monene mpo na kobundisa mokonzi ya sude. Mpe mokonzi ya sude akosangisa mampinga monene mpe ya nguya mpo na kobundisa ye, kasi akolonga te mpo na likita oyo basalelaki ye. 26 Bato oyo baliaka elongo na mokonzi bakoluka koboma ye, mampinga na ye bakobebisama mpe basoda ebele bakokufa na bitumba. 27 Bakonzi oyo mibale, na mitema na bango ya mabe, bakovanda esika moko. Lokola batonda na mayele mabe, bakolobana lokuta kasi ekosimba te, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama. 28 Mokonzi ya nor akozonga na mokili na ye na bomengo ebele, kasi makanisi ya motema na ye ekotelemela boyokani ya bule ; mpe akokokisa yango liboso ete azonga na mokili na ye.
29 Na tango oyo ekatama, akokota lisusu na mokili ya sude na makasi ; kasi na mbala oyo, makambo ekosalema ndenge moko te na mbala oyo ya liboso. 30 Bamasuwa oyo ekowuta na ngambo ya weste ya ebale monene Mediterane ekobundisa ye ; bongo, akolemba nzoto, akosilika makasi mpe akotombokela boyokani ya bule. Tango akozonga, akotalisa ngolu epai ya bato oyo bakobebisa boyokani ya bule. 31 Mampinga ya basoda na ye bakotelema mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo mpe kobuka engumba batonga makasi ; bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo mpe bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi. 32 Na mayele na ye ya mabe, akokosa bato oyo babukaki boyokani ; kasi bato oyo bayebi Nzambe na bango bakotelemela ye makasi.
33 Ba-oyo bakozala na bwanya kati na bato bakoteya bato ebele, atako bakokufa na mopanga na mwa tango moke to bakozika na moto to bakobwakama na boloko to mpe bakobotola bango biloko na makasi. 34 Tango bakokweya, bakozwa kaka lisungi moke, mpe bato ebele bakoya kosangana na bango na mitema mibale. 35 Bato mosusu kati na bato ya bwanya bakobeta mabaku, mpo ete bakomisama bato ya kokoka, bapetolama mpe bazangi mbeba, mpo na tango ya suka, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
36 Mokonzi akosala makambo oyo alingi, akokoma lolendo, akotombola mapeka liboso ya banzambe nyonso mpe akoloba makambo ezanga tina mpo na kotiola Nzambe ya banzambe ; akolonga kino tango kanda makasi ya Nzambe ekosila, pamba te makambo nyonso oyo ekatama esengeli kokokisama. 37 Akopesa lokumu te, ezala epai ya banzambe ya batata na ye to epai ya nzambe oyo basi balingaka to mpe epai ya banzambe nyonso mosusu ; pamba te akomitombola liboso na bango nyonso. 38 Na esika ya kosambela banzambe wana, akosambela nzambe ya bandako batonga makasi ; akobonza wolo, palata, mabanga ya talo mpe makabo mosusu ya talo epai ya nzambe oyo bakoko na ye batikalaki koyeba te. 39 Akobundisa bandako batonga makasi na lisungi ya nzambe moko ya bapaya, mpe akopesa lokumu koleka epai ya bato oyo bakopesa nzambe yango lokumu. Akokomisa bango bakambi ya bato ebele mpe akokabolela bango mokili lokola lifuti.
Suka ya minyoko
40 Na tango ya suka, mokonzi ya sude akobundisa mokonzi ya nor, kasi mokonzi ya nor akobimela ye elongo na bashar, bampunda mpe bamasuwa ya bitumba. Akokota na makasi na bikolo ebele mpe akomema lokola mpela eloko nyonso oyo akomona na nzela. 41 Akokota lisusu na makasi na mokili ya kitoko. Bikolo ebele ekokweya, kasi Edomi, Moabi mpe bakonzi ya Amoni bakokima ye. 42 Bokonzi na ye ekopanzana na bikolo ebele, ezala mokili ya Ejipito ekobika te. 43 Akobotola wolo, palata mpe bomengo nyonso ya mokili ya Ejipito, bongo bato ya Libi mpe ya Kushi bakosala ndenge moko kaka na ye. 44 Kasi basango oyo akozwa wuta na este mpe na nor ekotungisa ye, mpe akobima na mokili na kanda makasi mpo na koboma mpe kosilisa bato ebele. 45 Akotelemisa bandako na ye ya kapo ya bokonzi na ngambo moko ya ebale monene, pembeni ya ngomba ya bule. Boye, akokoma na suka mpe moto oyo akosunga ye akozala te.