5
Makomi na mir
Mokolo moko, mokonzi Balitazari asalisaki feti moko ya monene mpo na kopesa lokumu na nkoto ya bato na ye ya lokumu ; mpe amelaki vino elongo na bango. Wana Balitazari azalaki komela vino, apesaki mitindo ete bamema bakopo ya wolo mpe ya palata oyo tata na ye, Nabukodonozori, azwaki wuta na Tempelo ya Yelusalemi, mpo ete mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, basi na ye mpe bamakangu na ye bamela na yango masanga. Boye, bamemaki bakopo ya wolo oyo bazwaki na Tempelo ya Nzambe, na Yelusalemi ; bongo mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, basi na ye mpe bamakangu na ye bamelaki na yango masanga. Wana bazalaki komela vino, bazalaki kokumisa banzambe ya wolo mpe ya palata, ya bronze, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga.
Mbala moko, misapi ya loboko ya moto moko ebimaki mpe ebandaki kokoma na etando ya mir ya ndako ya mokonzi, pembeni ya etelemiselo ya minda. Tango mokonzi amonaki ndenge loboko yango ezalaki kokoma, elongi na ye etelaki na somo mpe makanisi na ye ekomaki kotambola, nzoto na ye mobimba ekomaki kolenga mpe mabolongo na ye ekomaki kotutana. Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni :
— Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi.
Bato nyonso ya bwanya ya mokonzi bakotaki na kati, kasi bakokaki te kotanga makomi wana to koyebisa mokonzi ndimbola na yango. Boye, mokonzi Balitazari akomaki lisusu na somo makasi koleka, mpe elongi na ye etelaki lisusu koleka ; mpe bato na ye ya lokumu bakomaki komitungisa.
10 Tango mama ya mokonzi ayokaki basango ya makambo oyo ekomelaki mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, akotaki na ndako epai wapi bazalaki kosalela feti ; alobaki :
— Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko ! Komitungisa te mpe kotika te ete elongi na yo etela ! 11 Ezali na moto moko kati na mokili na yo, oyo azali na molimo ya banzambe ya bule kati na ye. Tango tata na yo azalaki mokonzi, amonaki kati na ye bososoli, mayele mpe bwanya oyo ekokana na bwanya ya banzambe. Boye, tata na yo, mokonzi Nabukodonozori, akomisaki ye mokonzi ya banganga-kisi, ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. 12 Pamba te moto yango, Daniele, oyo tata na yo azalaki kobenga Belitsatsari, atondisama na mayele, na boyebi mpe na bososoli ; azali lisusu na makoki ya kolimbola ndoto, masese mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi. Benga kaka Daniele wana, mpe akoyebisa yo ndimbola ya makomi yango.
13 Boye, bamemaki Daniele liboso ya mokonzi. Mokonzi atunaki ye :
— Yo nde Daniele, moko kati na bawumbu oyo tata na ngai amemaki wuta na Yuda ? 14 Nayoki na tina na yo ete ozali na molimo ya banzambe kati na yo, mpe ete ozali na bososoli, na mayele mpe na bwanya ya kokamwa ! 15 Bato ya bwanya mpe banganga-kisi bawuti awa liboso na ngai mpo na kotanga makomi oyo mpe koyebisa ngai ndimbola na yango, kasi balongi te kopesa ndimbola yango. 16 Nzokande, nayoki ete yo ozali na makoki ya kolimbola mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi ; sik’oyo, soki olongi kotanga makomi oyo mpe opesi ngai ndimbola na yango, nakolatisa yo bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe okokoma moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya mokili na ngai ya bokonzi.
17 Daniele azongiselaki mokonzi :
— Batela bakado na yo mpo na yo moko mpe pesa lifuti na yo epai ya moto mosusu ! Kasi ngai, nazali kotanga makomi yango mpo na mokonzi ; bongo, nakopesa ye ndimbola na yango.
18 Oh mokonzi, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apesaki tata na yo, Nabukodonozori, bokonzi ; akomisaki ye moto monene mpe apesaki ye nkembo mpe lokumu. 19 Mpo na lokumu oyo apesaki ye, bato ya bikolo, ya mikili mpe ya nkota nyonso bakomaki kolenga na somo liboso na ye. Mokonzi azalaki koboma bato oyo azalaki na posa ya koboma, kobikisa bato oyo azalaki na posa ya kobikisa, kotombola bato oyo azalaki na posa ya kotombola mpe kosambwisa bato oyo azalaki na posa ya kosambwisa. 20 Kasi tango kaka motema na ye ekomaki na lofundu mpe na lolendo, akitisamaki wuta na kiti na ye ya bokonzi mpe babotolaki ye nkembo na ye. 21 Babenganaki ye na molongo ya bato mpe bapesaki ye mayele ya banyama ; akomaki kovanda elongo na ba-ane ya zamba, kolia matiti lokola bangombe mpe nzoto na ye ezalaki kopola na mamwe* ya tongo, kino tango asosolaki ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya bokonzi nyonso ya bato mpe atombolaka na bokonzi moto nyonso oyo Ye alingi.
22 Mpe yo Balitazari, mwana na ye ya mobali, atako oyebaki makambo wana nyonso, otamboli na komikitisa te. 23 Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso. 24 Yango wana, atindi loboko oyo ekomi makomi oyo.
25 Tala makomi oyo ekomami :
Mene, Mene, Tekel, Parsin.
26 Ndimbola ya maloba yango ezali :
Mene : Nzambe atangi mikolo ya bokonzi na yo mpe akomisi yango na suka ;
27  Tekel : bameki kilo na yo na emekelo kilo, mpe emonani ete ozali na yo pepele ;
28  Parsin : bokonzi na yo ekabwani mpe epesami epai ya bato ya Medi mpe ya Persi.
29 Mbala moko, Balitazari apesaki mitindo ete balatisa Daniele bilamba ya motane, sheneti ya wolo na kingo mpe batatola na tina na ye ete akomi moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya bokonzi.
30 Mpe kaka na butu wana, babomaki Balitazari, mokonzi ya bato ya Babiloni.
* 5:21 Mamwe elakisi : mayi oyo ezalaka na matiti na tongo.