41
Moto yango amemaki ngai kati na eteni ya Tempelo, oyo eleki monene mpe amekaki molayi ya makonzi na yango : likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene misato na monene na bangambo nyonso. Ekotelo na yango ezalaki na bametele pene mitano na mokuse, mpe bamir na yango ya mipanzi ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano, ngambo na ngambo, na mokuse. Amekaki lisusu molayi ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : ezalaki na bametele pene tuku mibale na molayi mpe bametele pene zomi na mokuse.
Bongo akotaki kati na eteni ya Tempelo, oyo eleki bule ; amekaki molayi ya makonzi ya ekotelo : moko na moko ezalaki na metele pene moko na mokuse ; ekotelo ezalaki na bametele pene misato na mokuse mpe bamir ya mipanzi ya ekotelo ezalaki na bametele pene misato na basantimetele tuku mitano na mokuse. Amekaki molayi ya eteni oyo ezalaki sima ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe bametele pene zomi na mokuse ; mpe alobaki na ngai : « Oyo ezali Esika-Oyo-Eleki-Bule. »
Amekaki lisusu monene ya mir ya Tempelo : ezalaki na bametele pene misato ; mpe ngambo nyonso ya bashambre zingazinga ya Tempelo ezalaki na bametele pene mibale na mokuse.
Ezalaki na ba-etaje misato oyo moko na moko, kati na yango, ezalaki na bashambre tuku misato oyo esimbamaki na mir batonga zingazinga ya Tempelo. Bamir yango ezalaki ekangana yango na yango, kasi ezalaki ya kokangana na mir ya Tempelo te. Longwa na etaje moko mpo na komata na etaje mosusu, bashambre ezalaki kokoma minene, pamba te bazalaki komata na etaje mosusu na ematelo oyo ezalaki zingazinga ya mir ; boye, likolo ya ndako ezalaki monene makasi. Bongo, mpo na kolongwa na etaje oyo ya se mpe kokoma na etaje oyo ya likolo, esengelaki koleka na etaje ya kati-kati. Namonaki zingazinga ya Tempelo eloko moko batonga na likolo : ezalaki moboko ya bashambre ; molayi na yango ezalaki na bametele pene misato. Monene ya mir ya libanda ya bashambre ya mipanzi ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano. Nzela oyo ezalaki na kati-kati ya ngambo ya bashambre ya Tempelo 10 mpe bashambre ya Banganga-Nzambe ezalaki na bametele pene zomi na mokuse na zingazinga ya Tempelo. 11 Bikuke ya bashambre ya Tempelo etalaki na nzela oyo ezalaki na bikotelo mibale : moko na ngambo ya nor mpe mosusu na ngambo ya sude. Mokuse ya nzela yango ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano. 12 Na ngambo ya weste, ezalaki na ndako moko etalana na lopango ya Tempelo : ezalaki na bametele pene tuku misato na mitano na mokuse ; mir ya ndako yango ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na monene, mpe bametele pene tuku minei na mitano na molayi.
13 Moto yango amekaki lisusu molayi ya Tempelo : ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi ; bongo lopango ya Tempelo mpe bamir na yango ezalaki na bametele pene tuku mitano. 14 Mokuse ya Tempelo mpe ya esika ya polele oyo ezalaki na ngambo ya este ezalaki mpe na bametele pene tuku mitano.
Kati ya Tempelo
15 Amekaki lisusu molayi ya ndako oyo etalana na lopango, na sima ya Tempelo elongo na nzela na yango ngambo na ngambo : ezalaki na bametele pene tuku mitano.
Kati na Tempelo, eteni oyo eleki monene, Esika ya bule ya kati mpe ndako moke ya kokotela oyo etalana na lopango, 16 bikotelo, maninisa ya milayi oyo batalelaka libanda mpe nzela oyo ezali kati na ba-etaje wana misato, bazipaki yango nyonso na mabaya, longwa na se kino na maninisa ya etaje ya liboso, mpe bazipaki lisusu maninisa yango nyonso. 17 Na esika oyo ezali likolo ya ekotelo ya libanda kino na eteni ya Tempelo, oyo eleki bule mpe na bamir ya zingazinga ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule mpe na libanda ya eteni ya bule ya Tempelo, 18 batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila. Bililingi ya banzete ya mbila ezalaki elandana na bililingi ya basheribe. Boye, Sheribe moko na moko azalaki na bilongi mibale : 19 elongi ya moto, na ngambo ya nzete ya mbila moko mpe elongi ya nkosi, na ngambo ya nzete ya mbila mosusu ; batiaki bililingi yango zingazinga ya Tempelo mobimba. 20 Batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila na mir ya libanda ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene, longwa na se kino na likolo ya ekotelo.
21 Mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na bangambo na yango nyonso, ezalaki ndenge moko na molayi ; mpe mabaya oyo ezalaki liboso ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule ezalaki mpe kaka ndenge moko. 22 Ezalaki na etumbelo moko ya mabaya, oyo ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano na bosanda mpe metele moko na molayi. Basonge na yango, se na yango mpe mipanzi na yango ezalaki ya mabaya. Moto yango alobaki na ngai : « Oyo nde mesa oyo ezali liboso ya Yawe. »
23 Ezala eteni ya Tempelo, oyo eleki monene to eteni ya Tempelo, oyo eleki bule, moko na moko ezalaki na bikuke mibale : 24 ekuke moko na moko ezalaki na bizipelo mibale oyo ebalukaka. 25 Batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila na bikuke ya libanda ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene ; basalaki mwanza moke ya mabaya na liboso ya ndako moke ya kokotela. 26 Batiaki bililingi ya banzete ya mbila na bangambo nyonso ya bamir ya mipanzi ya ndako moke ya kokotela, oyo ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda. Mpe mipanzi ya bashambre ya Tempelo ezalaki na bamwanza mike.