43
Nkembo ezongi kati na Tempelo
Moto yango amemaki ngai kino na ekuke oyo etala na ngambo ya este, mpe namonaki nkembo na Nzambe ya Isalaele koya wuta na ngambo ya este. Mongongo na Ye ezalaki lokola makelele ya mayi minene, mpe mokili ekomaki kongenga na nkembo na Ye. Emoniseli oyo namonaki ezalaki ndenge moko na oyo namonaki tango ayaki kobebisa engumba, mpe ndenge moko na oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye, nakweyaki elongi kino na mabele.
Nkembo na Yawe ekotaki kati na Tempelo na nzela ya ekuke oyo etala na ngambo ya este.
Bongo, Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na lopango ya kati, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo. Tango moto yango atelemaki pene na ngai, nayokaki mongongo ya moto koloba na ngai wuta na kati ya Tempelo. Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ezali awa nde kiti na Ngai ya bokonzi ezalaka, esika oyo natiaka makolo na Ngai. Ezali na esika oyo nde nakovanda mpo na libela kati na bana ya Isalaele. Libota ya Isalaele ekotikala lisusu te kokomisa Kombo na Ngai mbindo, ezala bango to bakonzi na bango, na nzela ya kindumba na bango mpe ya banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi na likolo ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba. Tango batiaki bikotelo na bango pene ya ekotelo na Ngai, mabaya oyo esimbaka bikuke na bango pene ya mabaya oyo esimbaka ekuke na Ngai, bongo mir moko kaka nde ekabolaki bango na Ngai, babebisaki nde bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya misala na bango ya mbindo ; yango wana, Ngai mpe nabebisaki bango na kanda na Ngai. Sik’oyo, tika ete balongola na miso na Ngai kindumba na bango mpe banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi, mpe Ngai nakovanda kati na bango mpo na libela.
10 Mwana na moto, lakisa epai ya libota ya Isalaele ndenge Tempelo ezali mpo ete bayoka soni mpo na masumu na bango ; mpe tika ete bameka molayi mpe mokuse na yango. 11 Soki bayoki penza soni mpo na makambo nyonso oyo basalaki, lakisa bango ndenge nini Tempelo ezali : ndenge basalela yango, bikuke mpe bikotelo na yango, ndenge batambolisaka yango, mibeko nini balandaka mpe ndenge nini basalaka losambo ; koma yango, na miso na bango, mpo ete bakoka kolandela yango mpe kotia yango na misala.
12 Tala mobeko oyo etali Tempelo : bisika nyonso oyo ezali zingazinga ya likolo ya ngomba ekozala bule koleka. Yango nde mobeko oyo etali Tempelo.
Etumbelo
13 Tala molayi mpe mokuse ya etumbelo na bametele : zingazinga ya se ya etumbelo ezalaki na libulu moko ya bozindo ya basantimetele pene tuku mitano, mpe ndenge moko na mokuse na yango ; bazingelaki yango na eloko moko evimba ya basantimetele pene mwambe. Etumbelo ezalaki, 14 longwa na se ya mabele kino na moboko, na metele pene moko na bosanda mpe basantimetele pene tuku mitano na mokuse ; kobanda na moboko ya moke kino na moboko ya monene, bametele pene mibale na bosanda mpe basantimetele pene tuku mitano na mokuse. 15 Etumbelo ezalaki na bametele pene mibale na bosanda, mpe maseke minei ezalaki likolo na yango. 16 Likolo ya etumbelo ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, na bangambo na yango nyonso : bametele pene motoba. 17 Moboko ya monene ezalaki ekokana na molayi mpe na mokuse, na bangambo na yango nyonso : bametele pene sambo. Eloko moko evimba ya basantimetele pene tuku mibale na mitano ezalaki zingazinga na yango. Mpe libulu moko ya basantimetele pene tuku mitano na bozindo ezalaki zingazinga na yango ; mpe binyatelo ya etumbelo ezalaki na ngambo ya este. »
18 Bongo alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tala mibeko ya etumbelo, oyo bakosalela tango bakotonga yango mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo mpe kosopela yango makila. 19 Okopesa mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi ya libota ya Tsadoki mpe babelemaka liboso na Ngai mpo na kosalela Ngai, elobi Nkolo Yawe ; 20 okokamata ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na maseke minei ya etumbelo mpe na basonge minei ya moboko ya likolo mpe zingazinga ya eloko oyo evimba. Na bongo, okopetola etumbelo mpe okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yango. 21 Okokamata ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu mpe okotumba yango na esika oyo babongisa na Tempelo mpo na yango, na libanda ya Esika ya bule.
22 Na mokolo ya mibale, okobonza ntaba moko ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka ya masumu ; boye, etumbelo ekokoma peto ndenge ekomaki peto na nzela ya ngombe ya mobali. 23 Tango okosilisa kopetola yango, okobonza mwana ngombe ya mobali mpe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele. 24 Okobonza yango liboso ya Yawe ; bongo, Banganga-Nzambe bakobwakela yango mungwa mpe bakobonza yango lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe. 25 Mikolo sambo, okobanda kobonza, mokolo na mokolo, ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu ; okobonza lisusu mwana ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele. 26 Bakosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na etumbelo mpe kopetola yango mikolo sambo ; bongo nde bakopetola mpe bakobulisa yango. 27 Na suka ya mikolo yango, kobanda na mokolo ya mwambe kino na mikolo oyo ekolanda, Banganga-Nzambe bakobonza na etumbelo bambeka na bino ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mpe Ngai, nakoyamba bino, elobi Nkolo Yawe. »