46
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ekuke ya lopango ya kati oyo etala na ngambo ya este ekozala ya kokangama mikolo motoba ; kasi na mokolo ya Saba mpe na mokolo ya feti ya ebandeli ya sanza, ekozala ya kofungwama. Mokambi akokota na kati, wuta na libanda ; akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akotelema na mabaya oyo esimbaka ekuke. Banganga-Nzambe bakobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani. Akogumbama na ekotelo ya ekuke mpe akobima na libanda, kasi ekuke ekozala ya kofungwama kino na pokwa. Na mikolo ya bafeti ya Saba mpe ya ebandeli ya sanza, bato ya mokili bakobanda kogumbama liboso ya Yawe, na ekotelo yango.
Na mokolo ya Saba, mokambi akomema epai na Yawe lokola mbeka ya kotumba bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali : nyonso esengeli ezala ezanga mbeba. Akopesa lokola mbeka ya bambuma bakilo zomi na mitano ya bambuma mpo na meme moko ya mobali ; bongo, akopesa likabo oyo loboko na ye ekokoka mpo na bana meme ; likabo ya mafuta ekozala balitele misato na ndambo mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma. Na mokolo na feti ya ebandeli ya sanza, akobonza mwana ngombe moko ya mobali, bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali : nyonso esengeli ezala ezanga mbeba. Akobakisa lokola makabo ya bambuma bakilo zomi na mitano mpo na ngombe ya mobali mpe mpo na meme ya mobali ; mpe mpo na bana meme, akopesa nyonso oyo loboko na ye ekokoka, bakisa balitele misato na ndambo ya mafuta mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma.
Tango mokambi akokota na kati, akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akobimela kaka na nzela wana. Mpe tango bato ya mokili bakoya liboso ya Yawe na bafeti oyo ekatama, moto nyonso oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya nor mpo na kogumbamela Yawe akobimela na ekuke ya ngambo ya sude, mpe oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya sude akobimela na ekuke ya ngambo ya nor. Moto moko te akobimela na ekuke oyo akotelaki, kasi akobimela na ekuke ya ngambo mosusu oyo etalana na yango. 10 Mokambi akozala kati na bato na ye, akokota mpe akobima elongo na bango.
11 Na tango ya bafeti mpe ya bafeti oyo ekatama, makabo ya bambuma ekozala bakilo zomi na mitano mpo na ngombe moko ya mobali, bakilo zomi na mitano mpo na meme moko ya mobali mpe nyonso oyo akolinga kopesa mpo na bana meme ya mibali ; akobakisa balitele misato na ndambo mpo na bakilo nyonso zomi na mitano ya bambuma.
12 Tango mokambi akobonzela Yawe mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kozongisa boyokani lokola likabo oyo akati na motema na ye moko, bakofungolela ye ekuke oyo etala na ngambo ya este ; mpe akobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani ndenge kaka asalaka na mokolo ya Saba. Sima na yango nde akobima, mpe bakokanga ekuke sima na ye.
13 Mokolo na mokolo, okobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba. Okobanda kobonza yango tongo nyonso. 14 Tongo nyonso, okobanda kobakisa na likolo na yango lokola likabo ya bambuma bakilo mibale na bagrame nkama mitano ya farine oyo bakosangisa na litele moko ya mafuta ya kitoko. Ezali likabo mpo na Yawe ; mpe ezali mibeko ya libela na libela mpo na bambeka ya tango nyonso. 15 Tongo nyonso, okobanda kobonza mwana meme, makabo ya bambuma mpe mafuta lokola mbeka ya kotumba ya tango nyonso.
Biloko ya mokambi
16 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Soki mokambi apesi eloko lokola kado epai ya moko kati na bana na ye ya mibali, eloko yango ekozala ya mwana yango mpe ekotikala lokola libula ya bokitani mpo na bana na ye. 17 Kasi soki apesi epai ya moko kati na basali na ye kado ya eloko oyo ewuti na libula na ye, kado yango ekozala ya mosali yango kino na mobu ya kokangolama na ye ; sima nde ekozonga na moboko ya mokambi, mpe libula na ye ekotikala ya bana na ye kaka. 18 Mokambi akoki kolongola eloko moko te kati na libula ya bato na ye mpo na kokomisa yango ya ye moko to kobengana bango na mabele na bango ; soki alingi kokabela bana na ye libula, asengeli nde kozwa yango na libula na ye moko mpo ete bato na Ngai bapanzana te mosika ya libula na bango. › »
Bakikuku ya Tempelo
19 Moto yango akotisaki ngai, na nzela ya ekotelo oyo ezali pembeni ya ekuke ya ngambo ya nor, kati na bashambre ya bule ya Banganga-Nzambe, oyo etala na ngambo ya nor ; alakisaki ngai esika moko oyo ezalaki na suka, na ngambo ya weste. 20 Alobaki na ngai : « Awa nde esika oyo Banganga-Nzambe bakozala kolambela mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka ya masumu mpe kotumbela makabo ya bambuma mpo ete ebima te na lopango ya libanda, noki te bato bakosimba biloko ya bule. »
21 Abimisaki ngai na lopango ya libanda mpe atambolisaki ngai na basonge nyonso minei ya lopango. Na songe moko na moko ya lopango, namonaki lopango mosusu. 22 Na basonge nyonso minei ya lopango ya libanda, ezalaki na mapango ya mike ; mpe mapango nyonso minei ezalaki ndenge moko : bametele pene tuku mibale na molayi mpe bametele pene zomi na mitano na mokuse. 23 Zingazinga ya moko na moko ya mapango nyonso minei, ezalaki na mir moko ya mokuse ; mpe na se na yango, batandaki mabanga mpo na kopelisa moto na zingazinga ya mir yango ya mokuse. 24 Moto yango alobaki na ngai : « Oyo nde bakikuku epai wapi basali ya Tempelo bakobanda kolambela misuni ya bambeka oyo bato bakobanda kobonza. »