9
Etumbu ya basambeli ya banzambe ya bikeko
Bongo nayokaki ye kobelela na mongongo makasi : « Bopusana awa, bino oyo bozali na mokumba ya kobebisa engumba ! Tika ete moko na moko kati na bino asimba ebundeli na ye na loboko ! »
Namonaki bato motoba koya wuta na nzela ya Ekuke oyo ya likolo, oyo etala na ngambo ya nor ; moko na moko kati na bango asimbaki ebundeli oyo ebomaka na loboko na ye. Kati na bango, ezalaki na moto moko oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. Bakotaki na kati mpe batelemaki pene ya etumbelo ya bronze. Nkembo ya Nzambe ya Isalaele elongwaki na likolo ya basheribe epai wapi ezalaki kowumela mpe ekendeki kino na ekotelo ya Tempelo ; mpe Yawe abengisaki moto oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. Yawe alobaki na ye : « Tambola kati na Yelusalemi mpe tia bilembo na bilongi ya bato oyo bazali komona pasi na mitema mpe bazali kolela likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo ezali kosalema kati na engumba oyo. »
Wana nazalaki nanu koyoka, alobaki na bato mosusu : « Bolanda ye kati na engumba mpe boboma bato na mawa te, bobikisa ata moto moko te ! Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! »
Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo. Alobaki na bango : « Bokomisa Tempelo mbindo mpe botondisa mapango na yango na bibembe. Bokende ! »
Babimaki mpe bakendeki koboma bato kati na engumba. Tango bazalaki koboma bato, natikalaki ngai moko ; nakweyaki elongi na ngai kino na mabele mpe nakomaki koganga :
— Oh, Nkolo Yawe ! Okosilisa solo koboma batikali nyonso ya Isalaele, na kopelisela Yelusalemi kanda na Yo ?
Azongiselaki ngai :
— Lisumu ya libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda eleki monene makasi penza. Mokili etondi na makila, mpe engumba etondi na kozanga bosembo ; pamba te bazali koloba : « Yawe asundoli mokili ; Yawe azali komona eloko moko te. » 10 Yango wana, Ngai mpe nakotala bango na liso ya mawa te mpe nakobikisa bango te. Kasi nakotanga mabe na bango na mito na bango.
11 Moto oyo alataki elamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye apesaki sango, na maloba oyo : « Nasali makambo oyo otindaki ngai. »