Kobima
1
Minyoko ya bana ya Isalaele
Tala bakombo ya bana ya Isalaele oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, moko na moko elongo na libota na ye :
 
Ribeni, Simeoni, Levi mpe Yuda ;
Isakari, Zabuloni mpe Benjame ;
Dani mpe Nefitali ;
Gadi mpe Aseri.
 
Bakitani ya Jakobi bazalaki bango nyonso tuku sambo. Nzokande Jozefi amizalelaki na Ejipito.
 
Jozefi mpe bandeko na ye nyonso ya mibali elongo na bato ya ekeke na bango basilaki na kokufa. Kasi bana ya Isalaele babotanaki mingi mpe bakomaki ebele penza. Bakomaki lisusu ebele koleka mpe makasi mingi : batondisaki mokili ya Ejipito.
Mokonzi moko ya sika, oyo ayebaki Jozefi te, azwaki bokonzi na Ejipito. Alobaki na bato na ye : « Botala bana ya Isalaele, bakomi ebele koleka biso mpe baleki biso na makasi. 10 Tosengeli kosala keba mpo na bango, mpo ete bakoma lisusu ebele te. Pamba te soki bitumba ekweyi, bakoki kokende na ngambo ya banguna na biso mpe kobundisa biso mpo ete babima na mokili oyo. »
11 Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko. 12 Kasi wana bazalaki konyokola bango, bazalaki kokoba kaka kobotana mpe kokoma ebele. Bongo bato ya Ejipito bakomaki kobanga bana ya Isalaele. 13 Bato ya Ejipito bakotisaki bana ya Isalaele na bowumbu ya makasi 14 mpe bakomaki konyokola bango na misala makasi : kosala potopoto, kobeta babiliki mpe kosala misala nyonso ya bilanga. Misala nyonso oyo bazalaki kosalisa bango ezalaki ya pasi mpe ya makasi.
15 Mokonzi ya Ejipito alobaki na basi oyo babotisaka basi ya Ba-Ebre, oyo bakombo na bango ezalaki Shifra mpe Puwa : 16 « Tango bokobotisa basi ya Ba-Ebre, botala soki mwana nini abotami ; soki azali mwana mobali, boboma ye ; kasi soki azali mwana mwasi, botika ye na bomoi. »
17 Kasi basi oyo babotisaka babangaki Nzambe mpe basalaki te makambo oyo mokonzi ya Ejipito atindaki bango kosala ; batikaki bana mibali na bomoi. 18 Boye mokonzi ya Ejipito abengisaki basi oyo babotisaka mpe atunaki bango :
— Mpo na nini bosali boye ? Mpo na nini botiki bana mibali na bomoi ?
19 Basi oyo babotisaka bazongiselaki Faraon :
— Basi ya Ba-Ebre bazali lokola basi ya Ejipito te. Bazali makasi, babotaka liboso ete basi oyo babotisaka bakoma.
20 Nzambe asalaki bolamu epai ya basi oyo babotisaka. Boye bana ya Isalaele bakobaki kaka kokoma ebele mpe makasi koleka. 21 Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango.
22 Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso : « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. »