11
Etumbu ya zomi : kufa ya bana ya liboso
Yawe alobaki na Moyize : « Nakoyeisa lisusu etumbu moko na bomoi ya Faraon mpe ya Ejipito. Sima na yango, Faraon akotika bino ete bokende ; kutu, akobengana bino libela. Loba na bato ete basenga biloko ya palata mpe ya wolo : mobali nyonso asenga yango epai ya moninga na ye mobali mpe mwasi nyonso, epai ya moninga na ye mwasi. »
Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito. Mpe Moyize ye moko azalaki moto monene kati na Ejipito, na miso ya basali ya Faraon mpe ya bato nyonso.
Moyize alobaki na Faraon : « Tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Na kati-kati ya butu, nakotambola kati na mokili mobimba ya Ejipito. Mwana mobali nyonso ya liboso kati na Ejipito akokufa, kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo avandi na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mwasi mowumbu oyo azali konika ble mpe bana mibali nyonso ya liboso ya bibwele. Bongo koganga makasi ekozala na mokili mobimba ya Ejipito, koganga oyo ezala nanu te mpe ekotikala kozala te. Kasi kati na bana nyonso ya Isalaele, ezala mbwa ekoganga te liboso ya moto to ya nyama. › Na bongo, bokoyeba ete Yawe asali bokeseni kati na bato ya Ejipito mpe ya Isalaele. Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba : ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. »
Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi.
Yawe alobaki na Moyize : « Faraon akoboya koyokela bino mpo ete bikamwa na Ngai ekoka komonana ebele kati na Ejipito. »
10 Boye Moyize mpe Aron basalaki bikamwa wana nyonso liboso ya Faraon. Kasi Yawe akomisaki motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kaka kotika bana ya Isalaele kobima na mokili na ye.