Yawe apesi bana ya Isalaele mibeko
21
Na tina na Ba-Ebre oyo bakomi bawumbu
Yawe alobaki na Moyize :
— Tala mibeko oyo okoyebisa bana ya Isalaele : « Soki bosombi Mo-Ebre moko lokola mowumbu, akosalela bino mibu motoba ; na mobu ya sambo, akozwa bonsomi mpe akofuta eloko moko te. Soki azalaki monzemba tango ayaki, asengeli kokende ye moko ; kasi soki azalaki na mwasi tango ayaki, mwasi na ye asengeli kokende na ye elongo. Soki nkolo na ye apesaki ye mwasi mpe mwasi yango abotelaki ye bana mibali to bana basi, mwasi mpe bana bakozala ya nkolo na ye ; mobali akokende ye moko. Kasi soki mowumbu alobi : ‹ Nalingaka nkolo na ngai, mwasi na ngai mpe bana na ngai, nalingi te kozwa bonsomi, › wana nkolo na ye asengeli komema ye liboso ya basambisi ; akomema ye na ezipelo ya ekuke to na mabaya oyo esimbaka ekuke mpe akotobola ye litoyi na motonga ; mpe mowumbu akosalela nkolo yango mpo na libela.
Soki moto ateki mwana na ye ya mwasi lokola mwasi mowumbu, mwana yango akozwa bonsomi te ndenge bawumbu bazwaka yango. Soki mwana mwasi asepelisi te nkolo oyo aponaki ye mpo ete azala mowumbu na ye, nkolo yango akotika ete mwana mwasi asikolama ; azali na ndingisa te ya koteka ye epai ya bapaya. Kasi soki ateki ye, wana asambwisi ye. Soki aponaki mwana mwasi yango mpo ete azala mwasi ya mwana na ye ya mobali, asengeli kokokisa makambo oyo mibeko esengaka mpo na kobala mwasi. 10 Soki abali mwasi mosusu, akolongola eloko te na oyo etali kolia, kolata mpe oyo basalelaka mwasi ya libala. 11 Soki apimeli ye ata eloko moko kati na biloko oyo misato, wana mwasi oyo akoki kokende na bonsomi mpe akofuta eloko moko te.
Na tina na evandeli kati na bato
12 Moto oyo akobeta moninga na ye kino koboma ye, basengeli koboma ye. 13 Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona. 14 Kasi soki moto akaneli moninga na ye mpe aluki koboma ye na mayele mabe, okomema ye mosika ya etumbelo na Ngai mpo na koboma ye.
15 Moto oyo akobeta tata to mama na ye, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
16 Moto oyo akokanga moto mosusu na makasi mpo na kokima na ye, ezala soki ateki moto yango to bakangi ye na moto yango na maboko, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
17 Moto oyo akolakela tata to mama na ye mabe, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
18 Soki bato baswani, bongo moko abeti moninga likofi to libanga ; mpe moto oyo babeti likofi to libanga akufi te kasi abeli makasi ; 19 soki moto oyo babeti atelemi mpe atamboli na nzete kino na libanda, bakokatela moto oyo abetaki ye etumbu te, kasi akofuta kaka mikolo oyo moto yango azalaki kosala te mpe akosalisa ye kino akobika.
20 Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, bongo mowumbu yango akufi na mbala moko, moto wana asengeli kozwa etumbu. 21 Kasi soki mowumbu yango awumeli lisusu na bomoi mokolo moko to mibale, wana nkolo na ye akozwa etumbu te, pamba te asombaki ye na mbongo.
22 Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi. 23 Kasi soki likama ezali, okofuta bomoi mpo na bomoi : 24 liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo, 25 kozika mpo na kozika, pota mpo na pota, litutu mpo na litutu.
26 Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye na liso, mpe liso yango ekufi, moto yango akopesa bonsomi na mowumbu mpo na liso na ye. 27 Soki abuki linu ya mowumbu na ye ya mobali to ya mwasi mowumbu na ye, akopesa ye bonsomi mpo na linu na ye.
28 Soki ngombe ebomi moto na maseke, basengeli koboma ngombe yango na mabanga, mpe bakolia mosuni na yango te ; nzokande nkolo na yango akozwa etumbu te. 29 Soki ngombe ezali na momesano ya kobeta bato maseke, bongo bakebisi makasi nkolo na yango, kasi ye abateli kaka ngombe na ye malamu te mpe yango ebomi moto ; basengeli koboma ngombe yango na mabanga mpe nkolo na yango asengeli kozwa etumbu ya kufa. 30 Kasi soki basengi ye lomande mpo na kosikola bomoi na ye, akofuta nyonso oyo bakosenga ye. 31 Bakosalela mpe mobeko oyo soki ngombe ebeti mwana mobali to mwana mwasi maseke. 32 Soki ngombe ebeti mowumbu ya mobali to mwasi mowumbu maseke, nkolo na yango asengeli kofuta mbongo ya bibende, tuku misato, epai ya nkolo ya mowumbu, mpe bakobamba ngombe yango mabanga.
Na tina na biloko
33 Soki moto atiki libulu polele to atimoli libulu mpe azipi yango te, bongo ngombe to ane ezindi kuna ; 34 nkolo libulu asengeli kofuta epai ya nkolo nyama mbongo oyo ekokani na motuya ya nyama oyo esili kokufa, mpe nyama yango ekokoma ya ye.
35 Soki ngombe ya moto moko ebomi ngombe ya moto mosusu, esengeli koteka ngombe oyo ezali na bomoi mpe kokabola na kati-kati mbongo mpe ngombe oyo esili kokufa. 36 Kasi soki eyebani ete ngombe yango emesana kobeta bato maseke, bongo nkolo na yango abateli yango malamu te ; wana asengeli kofuta ngombe mpo na ngombe, mpe ngombe ya kokufa ekokoma ya ye.
Na tina na moyibi ya banyama
37 Soki moto ayibi ngombe moko to meme moko, bongo abomi yango to ateki yango ; asengeli kofuta bangombe mitano mpo na ngombe moko oyo ayibaki to bameme minei mpo na meme moko oyo ayibaki.