5
Moyize mpe Aron bakei epai ya Faraon
Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki :
— Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. »
Faraon azongisaki :
— Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende ? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende.
Balobaki :
— Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga.
Kasi mokonzi ya Ejipito alobaki :
— Moyize mpe Aron, mpo na nini bozali kopekisa bato kosala misala na bango ? Bozonga na mosala na bino !
Faraon abakisaki lisusu :
— Botala ! Bato oyo bakomi ebele kati na mokili, bongo bino bozali kopekisa bango kosala mosala !
Minyoko eyei lisusu makasi
Kaka na mokolo wana, Faraon apesaki mitindo oyo epai ya bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe na bakapita ya bana ya Isalaele :
— Bokopesa lisusu matiti te epai ya bato oyo mpo na kosala babiliki ndenge bozalaki kopesa bango liboso ; botika bango moko bakende kolokota matiti na bango. Kasi botinda bango kosala kaka motango ya babiliki oyo basalaka wuta kala, bokitisa motango na yango te. Bazali bagoyigoyi, yango wana bazali koganga : « Tika biso tokende kobonzela Nzambe na biso mbeka ! » Bokomisa makasi misala na bango mpo ete bakoma na mosala ebele mpe batia matoyi te na makambo ya lokuta.
10 Bongo bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe bakapita ya bana ya Isalaele babimaki mpe balobaki na bato :
— Tala makambo oyo Faraon alobi : « Nakopesa bino lisusu matiti te. 11 Bokende kozwa matiti bino moko na esika oyo bokoki komona yango ! Kasi motango ya babiliki oyo bakatela bino ekokita ata moke te. »
12 Boye bana ya Isalaele bapanzanaki na Ejipito mobimba mpo na kolokota matiti ya kotumba na yango babiliki. 13 Bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu bazalaki kotindika bango na makasi mpe koloba :
— Bokokisa motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo lokola na tango oyo bazalaki kopesa bino matiti !
14 Bakambi oyo Faraon aponaki mpo na kolandela misala makasi ya bawumbu babetaki bakapita ya bana ya Isalaele oyo bango batiaki mpe batunaki bango :
— Mpo na nini lobi oyo eleki mpe lelo bokokisi te motango ya babiliki oyo bosalaka wuta kala ?
15 Bakengeli ya bana ya Isalaele bakendeki kolela epai ya Faraon :
— Mpo na nini ozali kosala basali na yo boye ? 16 Bazali kopesa lisusu te matiti epai ya basali na yo, nzokande bazali koloba na biso : « Bosala babiliki ! » Sik’oyo tala, basali na yo bazali kobetama, kasi mbeba ezali epai ya bato na yo moko.
17 Faraon alobaki :
— Bagoyigoyi ! Bozali penza bagoyigoyi ! Yango wana bozali koloba : « Tika biso tokende kobonzela Yawe mbeka. » 18 Sik’oyo, bozonga na mosala ! Bakopesa bino lisusu matiti te, kasi bokosala kaka motango ya babiliki oyo bakatela bino.
19 Bakengeli ya bana ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi koleka tango bayebisaki bango : « Motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo ekokita te. » 20 Tango batikaki Faraon, batombokelaki Moyize mpe Aron oyo bazalaki kozela bango. 21 Balobaki :
— Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso !
Nzambe alaki kokangola Isalaele
22 Boye Moyize abalukaki epai na Yawe mpe abondelaki :
— Nkolo ! Mpo na nini ozali komemela bato oyo pasi ? Boni, ezali mpo na yango nde otindaki ngai ? 23 Wuta tango nakendeki koloba na Faraon na Kombo na Yo, Faraon akomi konyokola bato oyo, bongo Yo ozali kosala ata eloko moke te mpo na kokangola bango !