Mabota ya bana ya Noa
10
Tala libota ya Noa : Semi, Cham mpe Jafeti ; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela.
Libota ya Jafeti
Bana mibali ya Jafeti :
Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
Bana mibali ya Gomeri :
Ashikenazi, Rifati mpe Togarima.
Bana mibali ya Yavani :
Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi. Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.
Libota ya Cham
Bana mibali ya Cham :
Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana.
Bana mibali ya Kushi :
Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka.
Bana mibali ya Raema :
Sheba mpe Dedani.
Kushi azalaki mpe tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili. Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. » 10 Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari. 11 Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala 12 mpe Reseni, engumba monene na kati-kati ya Ninive mpe Kala.
13 Mitsirayimi azalaki koko
ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu, 14 ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.
15 Kanana azalaki tata
ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti, 16 ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi, 17 ya Evi, ya Ariki, ya Sini, 18 ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati.
(Mpe na sima, bato ya mabota nyonso ya Kanana bapalanganaki bipai na bipai. 19 Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)
20 Bango nde bazalaki bakitani ya Cham kolanda mabota mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.
Libota ya Semi
21 Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana ; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.
22 Bana mibali ya Semi :
Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami.
23 Bana mibali ya Arami :
Utsi, Uli, Geteri mpe Mashi.
24 Aripakishadi abotaki Shela ;
Shela abotaki Eberi.
25 Eberi abotaki bana mibali mibale :
moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. »
26 Yokitani abotaki
Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera, 27 Adorami, Uzali, Dikila, 28 Obali, Abimaeli, Saba, 29 Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.
30 (Mokili oyo bazalaki kovanda ebandaki wuta na Mesha kino na Sefari, na mokili ya bangomba ya este.)
31 Bango nde bazalaki bana mibali ya Semi kolanda bituka mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.
 
32 Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.