26
Izaki mpe Abimeleki
Wana nzala makasi ekotaki lisusu na mokili lokola na tango ya Abrayami, Izaki akendeki na Gerari epai ya Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia. Boye Yawe abimelaki ye mpe ayebisaki ye :
— Kokende na Ejipito te ! Vanda na mokili oyo nakolakisa yo. Vanda kati na mokili oyo ; nakozala na yo elongo mpe nakopambola yo, pamba te nakopesa mabele oyo nyonso epai na yo mpe epai ya bana na yo ; nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya Abrayami, tata na yo. Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo mpe nakopesa bango mabele oyo nyonso. Boye mpo na bakitani na yo, bikolo nyonso ya mokili ekomipambola. Nakosala yango mpo ete Abrayami atosaki Ngai, abatelaki bikateli na Ngai, mitindo na Ngai mpe mibeko na Ngai.
Boye, Izaki avandaki na Gerari.
Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki :
— Azali ndeko na ngai ya mwasi.
Azalaki koloba te ete azali mwasi na ye mpo ete azalaki kobanga ete bato ya mboka baboma ye mpo na Rebeka, pamba te azalaki penza kitoko. Tango awumelaki na mboka yango, Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia, atalaki wuta na lininisa mpe amonaki Izaki kosakana na mwasi na ye Rebeka. Bongo Abimeleki abengisaki ye mpe alobaki na ye :
— Rebeka azali solo mwasi na yo. Mpo na nini olobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ? »
Izaki azongisaki :
— Kati na ngai, nazalaki koloba ete nakokaki kokufa mpo na ye.
10 Abimeleki alobaki lisusu :
— Nasali bino likambo nini ? Etikalaki kaka moke ete mobali moko kati na bato na ngai akota mpe asangisa nzoto na mwasi na yo. Boye, olingaki komemisa biso ngambo.
11 Abimeleki apesaki mitindo na bato nyonso :
— Moto nyonso oyo akosala mabe na moto oyo mpe na mwasi na ye, akokufa.
Izaki avandaki na Beri-Sheba
12 Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye.
13 Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele. 14 Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele. 15 Boye bato ya Filisitia bakundaki mabulu nyonso oyo basali ya Abrayami, tata na ye, batimolaki tango azalaki nanu na bomoi mpe batondisaki yango na mabele. 16 Bongo Abimeleki alobaki na Izaki :
— Kende mosika na biso, pamba te okomi na nguya mingi koleka biso.
17 Izaki alongwaki wana mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo na lubwaku ya Gerari epai wapi avandaki. 18 Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango. 19 Basali ya Izaki batimolaki na lubwaku mpe bamonaki kuna libulu ya mayi ya peto. 20 Babateli bibwele ya Gerari baswanisaki babateli bibwele ya Izaki mpe balobaki na bango : « Mayi oyo ezali ya biso. » Izaki apesaki libulu yango kombo « Eseki*, » pamba te baswanisaki ye na tina na yango. 21 Batimolaki libulu mosusu, kasi baswanisaki ye lisusu na tina na yango, mpe apesaki yango kombo « Sitina. » 22 Alongwaki wana mpe akendeki kotimola libulu mosusu ; mpe moto moko te aswanisaki ye na tina na yango. Yango wana apesaki yango kombo « Reoboti, » pamba te alobaki : « Sik’oyo, Yawe apesi biso esika monene, mpe tokofuluka na mokili oyo. » 23 Kolongwa wana, akendeki na Beri-Sheba.
Izaki asali boyokani elongo na Abimeleki
24 Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. » 25 Kaka na esika yango, Izaki atongaki etumbelo, abelelaki Kombo ya Yawe, atongaki ndako na ye ya kapo. Basali na ye batimolaki libulu mosusu ya mayi.
26 Wuta na Gerari, Abimeleki elongo na Awuzati, mopesi toli na ye, mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bayaki kokutana na Izaki. 27 Izaki atunaki bango :
— Mpo na nini boyei epai na ngai, bino bato oyo bolingaka ngai te mpe bobenganaki ngai epai na bino ?
28 Bazongiselaki ye :
— Tomoni ya solo ete Yawe azali elongo na yo, yango wana tolobaki : « Tika ete tosala boyokani kati na biso mpe yo na nzela ya ndayi. 29 Lapa ndayi ete okosala biso mabe te ndenge biso mpe tosalaki yo mabe te ; tosalelaki yo kaka bolamu mpe totikaki yo kokende na kimia. Sik’oyo, Yawe apamboli yo. » 30 Izaki asalelaki bango feti monene ; baliaki mpe bamelaki. 31 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balapanaki ndayi ; bongo Izaki abimisaki bango na nzela mpe atikaki bango kokende na kimia. 32 Kaka na mokolo yango, basali ya Izaki bayaki kopesa ye sango ete bamoni mayi na libulu oyo bazalaki kotimola. 33 Izaki apesaki libulu yango kombo « Sheba§. » Yango wana engumba yango ebengami kino lelo Beri-Sheba.
 
34 Tango Ezawu akokisaki mibu tuku minei ya mbotama, abalaki Jiditi, mwana mwasi ya Beri, moto ya mokili ya Iti, mpe Basimati, mwana mwasi ya Eloni, moto ya mokili ya Iti. 35 Basi yango bazalaki koyokisa Izaki mpe Rebeka pasi na motema.
* 26:20 Eseki elakisi : koswana. 26:21 Sitina elakisi : kowelana. 26:22 Reoboti elakisi : mokuse. § 26:33 Sheba elakisi : ndayi.