29
Jakobi akomi epai ya Labani
Jakobi akobaki mobembo na ye mpe akomaki na mokili ya bato ya este. Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu. Tango bibwele nyonso ezalaki kosangana wana, babateli bibwele bazalaki kolongola libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe komelisa bameme. Mpe na sima, bazalaki kozongisa libanga na esika na yango, na monoko ya libulu. Jakobi atunaki babateli bibwele :
— Bandeko na ngai ya mibali, bowuti wapi ?
Bazongisaki :
— Towuti na Arani.
Atunaki bango lisusu :
— Boyebi Labani, koko ya Naori ?
Bazongisaki :
— Iyo, toyebi ye.
Jakobi abakisaki lisusu :
— Boni, azali malamu ?
Bazongisaki :
— Iyo, azali malamu. Tala kutu Rasheli, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bameme.
Kasi Jakobi alobaki :
— Tala, moyi ezali nanu makasi ; tango ekoki nanu te mpo na kozongisa bibwele. Bomelisa bameme mpe bozonga lisusu koleisa yango matiti.
Bazongisaki :
— Tokoki kosala yango kaka soki bibwele nyonso esangani ; bongo tokolongola libanga na monoko ya libulu mpe tokomelisa bameme mayi.
Wana azalaki nanu kosolola na bango, Rasheli ayaki elongo na bameme ya tata na ye, pamba te azalaki mwasi mobateli bibwele. 10 Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi. 11 Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi. 12 Jakobi ayebisaki Rasheli : « Nazali mwana ya Rebeka mpe moto ya libota ya tata na yo. » Bongo Rasheli akimaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye. 13 Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye ; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. 14 Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba.
Jakobi abali Lea mpe Rasheli
15 Labani alobaki na Jakobi :
— Boni, osalela ngai mosala ya ofele mpo ete ozali moto ya libota na ngai ? Yebisa ngai : olingi ete lifuti na yo ezala nini ?
16 Nzokande, Labani azalaki na bana basi mibale ya mikolo : Lea mpe leki na ye Rasheli. 17 Lea azalaki na miso elala kasi Rasheli azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko. 18 Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki :
— Nakosalela yo mibu sambo mpe okopesa ngai Rasheli, mwana na yo ya mwasi oyo ya leki, mpo ete azala mwasi na ngai.
19 Labani alobaki :
— Eleki malamu ete napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye epai ya mobali mosusu. Vanda awa elongo na ngai.
20 Jakobi asalaki mibu sambo mpo na kozwa Rasheli na libala, mpe mibu yango emonanaki kaka lokola mwa mikolo epai na ye, pamba te alingaki Rasheli.
21 Sima, Jakobi alobaki na Labani :
— Mikolo na ngai ekoki ; pesa ngai mwasi na ngai, pamba te nalingi kozala na ye.
22 Na boye, Labani abengisaki bato nyonso ya esika wana mpe asalisaki feti. 23 Tango pokwa ekomaki, Labani azwaki Lea, mwana na ye ya mwasi, apesaki ye epai ya Jakobi mpe Jakobi asangisaki na ye nzoto. 24 Labani apesaki Zilipa, mwasi mosali na ye, epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye. 25 Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani :
— Likambo nini oyo osali ngai ? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo ? Mpo na nini okosi ngai ?
26 Labani azongisaki :
— Na bokoko na biso awa, topesaka te leki na libala liboso ya kulutu. 27 Silisa nanu poso ya babalani elongo na ye. Bongo sima, oyo ya leki mpe akopesamela yo soki osaleli ngai lisusu mibu sambo.
28 Jakobi asalaki bongo : asilisaki poso wana elongo na Lea, sima Labani apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rasheli mpo ete azala mwasi na ye. 29 Labani apesaki Bila, mwasi mosali na ye, epai ya Rasheli, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye. 30 Jakobi asangisaki lisusu nzoto na Rasheli. Alingaki ye mingi koleka Lea. Bongo asalelaki lisusu Labani mibu sambo.
Bana ya Jakobi
31 Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te. 32 Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni ; » alobaki : « Yawe amoni pasi na ngai ; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. »
33 Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. » 34 Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, pamba te naboteli ye bana mibali misato. » Boye bapesaki ye kombo « Levi. » 35 Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.