3
Kokweya ya Adamu mpe Eva
Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi :
— Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga ?
Mwasi azongisaki epai ya nyoka :
— Toliaka bambuma ya banzete ya elanga. Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. »
Nyoka alobaki na mwasi :
— Solo penza, bokokufa te. Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye* : koyeba malamu na mabe.
Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango. Mbala moko, miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazali bolumbu. Boye, basangisaki makasa ya nzete ya figi mpe bamizipaki.
Na pokwa, bayokaki makelele ya matambe ya Yawe Nzambe kotambola kati na elanga. Boye, mobali mpe mwasi babombamaki kati na banzete ya elanga mpo na kokima Yawe. Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye :
— Ozali wapi ?
10 Azongisaki :
— Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu ; yango wana nabombami.
11 Nzambe alobaki :
— Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ?
12 Adamu azongisaki :
— Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango.
13 Yawe Nzambe alobaki na mwasi :
— Mpo nini osali bongo ?
Mwasi azongisaki :
— Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.
14 Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo,
olakelami mabe kati na bibwele
mpe banyama nyonso ya zamba.
Okotambola na libumu
mpe okobanda kolia putulu
bomoi na yo mobimba.
15 Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi,
mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye.
Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo,
mpe yo okoswa bango na litindi. »
16 Nzambe alobaki na mwasi :
« Nakobakisa pasi na zemi na yo ;
okobota na pasi.
Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo,
kasi ye akozala mokonzi na yo. »
17 Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, ›
mabele elakelami mabe likolo na yo.
Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.
18 Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende.
Okolia matiti ya bilanga.
19 Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo
kino okozonga na mabele epai wapi owutaki,
pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »
20 Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili.
21 Yawe Nzambe asalelaki Adamu mpe mwasi na ye bilamba ya poso ya nyama mpe alatisaki bango yango.
22 Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. »
23 Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki.
24 Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.
* 3:5 Lolenge mosusu ya kobongola elobi : bokokoma lokola banzambe. 3:20 Eva elakisi : bomoi.