Lisolo ya libota ya Ezawu
36
Bana ya Ezawu
Tala libota ya Ezawu oyo azali Edomi.
 
Ezawu abalaki basi na ye kati na bana basi ya Kanana : Ada, mwana mwasi ya Eloni, moto ya Iti ; Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, moto ya Evi ; mpe Basimati, mwana mwasi ya Isimaeli mpe ndeko mwasi ya Nebayoti.
Ada abotelaki Ezawu Elifazi ; mpe Basimati abotelaki ye Reweli. Olibama abotaki Yewushi, Yaelami mpe Kora. Bango nde bana mibali oyo babotelaki Ezawu na mokili ya Kanana.
Ezawu azwaki basi na ye, bana na ye ya mibali, bana na ye ya basi, bato nyonso ya ndako na ye mpe bibwele na ye, banyama na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki na mokili ya Kanana, akendeki na mokili mosusu, mosika ya ndeko na ye Jakobi. Bomengo na bango ekomaki mingi penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; pamba te mokili oyo bazalaki kovanda ekokaki bango lisusu te likolo ya motango ya bibwele na bango. Yango wana Ezawu, oyo azali Edomi, akendeki kovanda na ngomba Seiri.
 
Tala libota ya Ezawu, koko ya bato ya Edomi, na ngomba Seiri :
 
10 Tala bakombo ya bana mibali ya Ezawu :
Elifazi, mwana mobali ya Ada, mwasi ya Ezawu ; mpe Reweli, mwana mobali ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
11 Bana mibali ya Elifazi :
Temani, Omari, Tsefo, Gaetami mpe Kenazi.
12 Elifazi, mwana mobali ya Ezawu, azalaki na makangu oyo kombo na ye ezalaki « Timina ; » Timina abotelaki ye Amaleki.
Bango nde bakoko ya Ada, mwasi ya Ezawu.
13 Bana mibali ya Reweli :
Naati, Zera, Shama mpe Miza.
Bango nde bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
14 Tala bana mibali oyo Olibama, mwasi ya Ezawu, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, abotelaki Ezawu :
Yewushi, Yaelami mpe Kora.
 
15 Tala bakonzi ya mabota ya bana mibali ya Ezawu :
Bana ya Elifazi, mwana liboso ya Ezawu :
mokonzi Temani, mokonzi Omari, mokonzi Tsefo, mokonzi Kenazi, 16 mokonzi Kora, mokonzi Gaetami mpe mokonzi Amaleki. Bango nde bakonzi ya libota ya Elifazi, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Ada.
17 Bana mibali ya Reweli, mwana mobali ya Ezawu :
mokonzi Naati, mokonzi Zera, mokonzi Shama mpe mokonzi Miza. Bango nde bakonzi ya libota ya Reweli, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
18 Bana mibali ya Olibama, mwasi ya Ezawu :
mokonzi Yewushi, mokonzi Yaelami mpe mokonzi Kora. Bango nde bakonzi ya libota ya Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe mwasi ya Ezawu.
19 Bango nde bazalaki bana mibali ya Ezawu oyo azali Edomi, mpe bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Edomi.
 
20 Tala bakitani ya Seiri, moto ya Ori, bato ya liboso oyo bavandaki na mokili yango :
Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana, 21 Dishoni, Etseri mpe Dishani. Bango nde bakonzi ya libota ya Ori, mwana mobali ya Seiri, na mokili ya Edomi.
22 Bana mibali ya Lotani :
Ori mpe Emami. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani.
23 Bana mibali ya Shobali :
Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami.
24 Bana mibali ya Tsibeoni :
Aya mpe Ana. Ezali Ana nde amonaki maziba ya mayi kati na esobe tango azalaki koleisa ba-ane ya Tsibeoni, tata na ye.
25 Bana ya Ana :
Dishoni, mwana na ye ya mobali ; mpe Olibama, mwana na ye ya mwasi.
26 Bana mibali ya Dishoni :
Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani.
27 Tala bana mibali ya Etseri :
Bilani, Zavani mpe Akani.
28 Bana mibali ya Dishani :
Utsi mpe Arani.
29 Tala bakonzi ya mabota ya Ori :
mokonzi Lotani, mokonzi Shobali, mokonzi Tsibeoni, mokonzi Ana, 30 mokonzi Dishoni, mokonzi Etseri mpe mokonzi Dishani.
Bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Ori, na mokili ya Seiri.
Bakonzi ya Edomi
31 Tala bakonzi oyo bakonzaki kati na Edomi liboso ete bana ya Isalaele bazwa mokonzi :
32 Bela, mwana mobali ya Beori, akomaki mokonzi ya Edomi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. »
33 Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi.
34 Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi.
35 Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi oyo alongaki Madiani na bilanga ya Moabi, akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki Aviti.
36 Tango Adadi akufaki, Samila, moto ya engumba Masireka, akitanaki na ye na bokonzi.
37 Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi.
38 Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi.
39 Tango Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akufaki, Adari akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi, mwana mwasi ya Mezaabi.
 
40 Tala bato oyo bazalaki bakonzi ya mabota ya Ezawu kolanda mabota ya botata, bisika oyo bazalaki kovanda mpe bakombo na bango :
Timina, Aliva, Yeteti,
41 Olibama, Ela, Pinoni,
42 Kenazi, Temani, Mibitsari,
43 Magidieli mpe Irami.
Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi kolanda bituka na bango, kati na mokili oyo bazalaki kovanda.
 
Ezawu azalaki koko ya bato ya Edomi.