39
Jozefi mpe mwasi ya Potifari
Sima, bamemaki Jozefi na Ejipito. Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, moto ya Ejipito, asombaki ye na maboko ya bato ya Isimaeli oyo bamemaki ye kuna.
Yawe azalaki elongo na Jozefi ; boye Jozefi azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala, mpe avandaki kati na ndako ya moto ya Ejipito, nkolo na ye. Tango nkolo na ye asosolaki ete Yawe azali elongo na Jozefi, mpe ete Yawe azali kolongisa ye na makambo nyonso oyo azali kosala, Jozefi azwaki ngolu na miso ya nkolo na ye, oyo apesaki ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso : Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe apesaki ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso. Wuta tango Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe mokonzi ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, Yawe apambolaki ndako ya moto ya Ejipito mpo na Jozefi ; lipamboli ya Yawe ezalaki na likolo ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, kati na ndako na ye mpe na bilanga. Boye Potifari atikaki biloko na ye nyonso kati na maboko ya Jozefi, azalaki lisusu kotala eloko moko te longola kaka bilei na ye.
Jozefi azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko.
Sima na yango, mwasi ya nkolo ya Jozefi alulaki ye Jozefi mpe alobaki na ye :
— Yaka kosangisa na ngai nzoto !
Kasi Jozefi aboyaki mpe alobaki na mwasi ya nkolo na ye :
— Tala, nkolo na ngai atunaka ngai ata eloko moko te na oyo etali ndako na ye, mpe atika biloko na ye nyonso kati na maboko na ngai. Moto moko te aleki ngai na monene kati na ndako oyo. Nkolo na ngai apekisi ngai eloko moko te longola kaka yo, pamba te ozali mwasi na ye. Boye ndenge nini penza ngai nakoki kosala likambo ya mabe boye mpe kosala masumu liboso ya Nzambe ?
10 Mokolo na mokolo, mwasi ya Potifari azalaki kaka kotungisa Jozefi, kasi ye mpe azalaki kaka koboya kosangisa na ye nzoto to kozala na ye elongo.
11 Mokolo moko, awa Jozefi akotaki na ndako mpo na kosala mosala na ye, mpe ata mosali moko te azalaki wana, 12 mwasi ya Potifari akangaki ye na bilamba mpe alobaki na ye :
— Yaka kosangisa na ngai nzoto !
Kasi Jozefi asundolaki elamba na ye kati na maboko ya mwasi ya Potifari mpe akimaki libanda ya ndako. 13 Tango mwasi ya Potifari amonaki ete Jozefi asundoli elamba na ye kati na maboko na ye mpe akimi libanda, 14 abengaki basali ya ndako na ye mpe alobaki :
— Botala ! Mo-Ebre oyo bamemelaki biso ayaki nde kosakanela biso ! Aluki kosangisa na ngai nzoto, kasi ngai nagangi makasi. 15 Tango ayoki ete nagangi makasi mpo na koluka lisalisi, asundoli elamba na ye pembeni na ngai mpe akimi libanda !
16 Mwasi ya Potifari abombaki elamba ya Jozefi pembeni na ye kino mobali na ye azongaki na ndako. 17 Bongo abetelaki ye lisolo :
— Mowumbu Mo-Ebre oyo omemelaki biso, ayaki epai na ngai mpo na kosakana na ngai. 18 Kasi tango nagangaki makasi mpo na koluka lisalisi, asundolaki elamba na ye pembeni na ngai mpe akimaki libanda.
19 Tango nkolo ya Jozefi ayokaki lisolo oyo mwasi na ye abetelaki ye na maloba oyo : « Tala ndenge mowumbu na yo asali ngai, » Potifari asilikaki makasi.
Jozefi kati na boloko
20 Potifari akangaki Jozefi mpe abwakaki ye na boloko epai wapi mokonzi Faraon atiaka bakangami. Kasi, wana Jozefi azalaki kati na boloko, 21 Yawe azalaki elongo na Jozefi mpe atalisaki ye bolamu na Ye ; asalelaki ye ngolu na miso ya mokonzi ya boloko. 22 Mokonzi ya boloko apesaki Jozefi mokumba ya kokengela bato nyonso ya boloko mpe ya kotambolisa makambo nyonso oyo ezalaki kosalema kuna. 23 Mokonzi ya boloko azalaki kotala lisusu likambo moko te kati na makambo oyo apesaki Jozefi mokumba ya kosala, pamba te Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolongisa ye na makambo nyonso oyo azalaki kosala.