5
Tala lisolo ya libota ya Adamu.
 
Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe. Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. »
 
Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. » Sima na mbotama ya Seti, Adamu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. Mibu nyonso oyo Adamu awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku misato, sima akufaki.
Tango Seti akokisaki mibu nkama moko na mitano ya mbotama, abotaki Enoshi. Sima na kobota Enoshi, Seti awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. Mibu nyonso oyo Seti awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi na mibale, sima akufaki.
Tango Enoshi akokisaki mibu tuku libwa ya mbotama, abotaki Kena. 10 Sima na kobota Kena, Enoshi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na zomi na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 11 Mibu nyonso oyo Enoshi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na mitano, sima akufaki.
12 Tango Kena akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Maalalele. 13 Sima na kobota Maalalele, Kena awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku minei mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 14 Mibu nyonso oyo Kena awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi, sima akufaki.
15 Tango Maalalele akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Yeredi. 16 Sima na kobota Yeredi, Maalalele awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 17 Mibu nyonso oyo Maalalele awumelaki na bomoi ezalaki nkama mwambe na tuku libwa na mitano, sima akufaki.
18 Tango Yeredi akokisaki mibu nkama moko na tuku motoba na mibale ya mbotama, abotaki Enoki. 19 Sima na kobota Enoki, Yeredi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 20 Mibu nyonso oyo Yeredi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na mibale, sima akufaki.
21 Tango Enoki akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Metusalemi. 22 Sima na kobota Metusalemi, Enoki azalaki kosala mokano ya Nzambe mibu nkama misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 23 Mibu nyonso oyo Enoki awumelaki na bomoi ezalaki nkama misato na tuku motoba na mitano. 24 Enoki atambolaki na boyengebene elongo na Nzambe ; bongo alimwaki, pamba te Nzambe azwaki ye.
25 Tango Metusalemi akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na sambo ya mbotama, abotaki Lemeki. 26 Sima na kobota Lemeki, Metusalemi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama sambo na tuku mwambe na mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 27 Mibu nyonso oyo Metusalemi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na libwa, sima akufaki.
28 Tango Lemeki akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na mibale ya mbotama, abotaki mwana mobali. 29 Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. » 30 Sima na kobotama ya Noa, Lemeki awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mitano na tuku libwa na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 31 Mibu nyonso oyo Lemeki awumelaki na bomoi ezalaki nkama sambo na tuku sambo na sambo, sima akufaki.
32 Tango Noa akokisaki mibu nkama mitano ya mbotama, abotaki Semi, Cham mpe Jafeti.