7
Noa akoti na masuwa
Yawe alobaki na Noa : « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo. Kamata banyama sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na banyama ya lolenge nyonso oyo ezangi mbindo ; mpe nyama moko ya mobali mpe moko ya mwasi kati na banyama oyo ezali mbindo. Kamata lisusu bandeke sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na lolenge nyonso ya bandeke mpo ete esila te kati na mokili. Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. »
Bongo, Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe atindaki ye.
Noa azalaki na mibu nkama motoba ya mbotama tango mpela eyaki na mokili. Noa mpe bana na ye ya mibali elongo na mwasi na ye mpe basi ya bana na ye bakotaki na masuwa mpo ete babika na mpela. Kati na banyama ya lolenge nyonso, moko ya mobali mpe moko ya mwasi, ezala oyo ezanga mbindo to oyo ezali mbindo, bandeke mpe banyama oyo etambolaka na libumu eyaki epai na Noa mpe ekotaki na masuwa, mwasi na mobali, ndenge Nzambe atindaki Noa. 10 Bongo sima na mikolo sambo, mpela eyaki na mokili.
Mpela eyei na mokili
11 Tango Noa akokisaki mibu nkama motoba ya mbotama, na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na sambo, bitima nyonso ya se mpe maninisa nyonso ya likolo efungwamaki. 12 Mvula enokaki na mokili mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.
13 Kaka na mokolo wana, Noa mpe bana na ye ya mibali : Semi, Cham mpe Jafeti, elongo na mwasi na ye mpe basi misato ya bana na ye, bakotaki na masuwa. 14 Elongo na bango, ekotaki mpe banyama ya zamba ya lolenge nyonso, bibwele ya lolenge nyonso, bikelamu ya lolenge nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya lolenge nyonso mpe bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu. 15 Mwasi na mobali, kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, eyaki epai ya Noa mpo na kokota na masuwa. 16 Banyama nyonso oyo ekotaki kuna ezalaki mwasi na mobali kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, ndenge Nzambe atindaki Noa. Sima, Yawe akangaki ekuke ya masuwa.
17 Mpela ewumelaki na mokili mikolo tuku minei ; mayi ekomaki ebele mpe etombolaki masuwa likolo na yango. 18 Mayi emataki mpe ekomaki ebele, bongo masuwa ekomaki kotepatepa likolo ya mayi. 19 Mayi emataki lisusu makasi mpe bangomba nyonso ya milayi oyo ezalaki na mokili ezindaki na se ya mayi. 20 Mayi emataki lisusu likolo ya bangomba na bosanda ya bametele pene sambo to mwambe. 21 Bikelamu nyonso ya bomoi kati na mokili ekufaki, ezala bandeke, bibwele, banyama ya zamba to mpe banyama ya mike-mike oyo etambolaka na mabele to mpe bato nyonso. 22 Nyonso oyo ezalaki na pema ya bomoi ekufaki kati na mokili. 23 Boye, Yawe alongolaki kati na mokili bikelamu nyonso oyo ezalaki na bomoi, kobanda na moto kino na ebwele, ekelamu oyo etambolaka na libumu mpe ndeke ya likolo ; alongolaki bango na mokili mpe etikalaki kaka Noa na ba-oyo bazalaki na ye elongo na masuwa.
24 Mayi etondaki na mokili mikolo nkama moko na tuku mitano.