4
Kotambola na bosantu
Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka. Pamba te boyebi mitindo oyo topesaki bino na Kombo ya Nkolo Yesu.
Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso : bokimaka pite ; moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu, asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te, asengeli mpe te kokosa to kosala ndeko na ye mabe kati na makambo oyo etali bonzoto, pamba te Nkolo akopesa etumbu na bato nyonso oyo basalaka mabe ya lolenge wana, ndenge toyebisaki mpe tokebisaki bino liboso. Nzambe abengaki biso te mpo ete tozala bato ya mbindo, kasi mpo ete tobika bomoi na biso na lolenge ya bule. Boye moto oyo atosaka mitindo yango te atiolaka moto te kasi atiolaka nde Nzambe oyo apesaki bino Molimo Mosantu na Ye.
Mpo na oyo etali bolingo kati na bino, ezali lisusu na tina te ya kokomela bino, pamba te Ye moko Nzambe ateyaki bino kolingana bino na bino. 10 Ezali mpe bolingo yango nde bosengeli kotalisa epai ya bandeko nyonso kati na Masedwane mobimba. Mpe bandeko, tozali kosenga na bino ete bokoba kosalaka bongo koleka, 11 ete bolukaka kobika bomoi na bino kati na kimia ; mpe tika ete moto nyonso atalaka makambo na ye moko mpe aliaka na motoki na ye moko, ndenge kaka toyebisaki bino yango, 12 mpo ete, mokolo na mokolo, Bapagano bamemia bino, mpe mpo ete bobika te bomoi na bino na sima ya mokongo ya moto.
Bato oyo bakufa kati na Nkolo
13 Bandeko, toboyi bozanga boyebi na tina na bato oyo bakufa, mpo ete bozala na mawa te lokola bamosusu oyo bazangi elikya. 14 Pamba te ndenge tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, ndenge mpe tondimaka ete Nzambe akomema, na nzela ya Yesu mpe elongo na Ye, bato oyo bakufa kati na Ye.
15 Kolanda liloba na Nkolo, tala makambo oyo tozali koyebisa bino : biso ba-oyo tokotikala na bomoi kino na tango oyo Nkolo akoya, tokokende te liboso ya bato oyo bakufa ; 16 pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso. 17 Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo ; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.
18 Yango wana, bolendisanaka na maloba oyo.