10
Motuya ya mbeka ya Klisto
Mobeko ya Moyize ezali kaka elilingi ya biloko oyo ekoya, ezali penza bosolo na yango te ; yango wana, ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela ya bambeka ya ndenge moko kaka oyo bapesaka tango nyonso mpe mobu na mobu. Soki ezalaki na makoki yango, mbele bato oyo bapesaka bambeka yango balingaki wuta kala kotika kopesa yango, pamba te balingaki kopetolama mbala moko mpo na libela, mpe balingaki lisusu komitungisa te mpo na masumu na bango.
Nzokande, mobu na mobu, bambeka wana ezalaki kozongisa masumu na makanisi na bango, pamba te makila ya bangombe ya mibali mpe ya bantaba ezali na makoki te ya kolongola masumu. Yango wana, tango Klisto ayaki na mokili, alobaki :
« Ozalaki na posa te ya bambeka to ya makabo,
kasi osalaki ngai nzoto.
Osepelaki te na bambeka ya kotumba
mpe na bambeka mpo na masumu.
Bongo nalobaki : ‹ Tala ngai oyo, nayei,
nayei, oh Nzambe, mpo na kosala mokano na Yo,
kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku. › »
Alobaki liboso :
« Ozalaki na posa te mpe osepelaki te na bambeka, na makabo,
na bambeka ya kotumba mpe na bambeka mpo na masumu. »
Nzokande ezalaki kopesama kolanda Mibeko.
Alobaki lisusu : « Tala ngai oyo, nayei mpo na kosala mokano na Yo. » Boye, alongolaki losambo ya liboso mpo na kotia losambo ya mibale. 10 Mpe ezali mpo na mokano yango ya Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela.
11 Mpo na kosala mosala na ye ya bonganga, Nganga-Nzambe nyonso azalaki kokende na esika na ye ya mosala mokolo na mokolo, mpe azalaki kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge moko oyo ezalaki kutu na makoki te ya kolongola masumu ya bato. 12 Kasi sima na Klisto kobonza mbeka moko kaka mpo na masumu, avandi mpo na libela na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe. 13 Wuta tango wana, azali kozela ete Nzambe akomisa banguna na Ye enyatelo makolo na Ye. 14 Pamba te, na nzela ya likabo moko kaka, akomisaki bato ya kokoka mpo na libela, ba-oyo apetolaki na masumu. 15 Molimo Mosantu mpe azali kotatola epai na biso na tina na Ye, pamba te alobaki liboso :
16 « Tala boyokani oyo nakosala elongo na bango
sima na mikolo wana, elobi Nkolo :
Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango,
mpe nakokoma yango kati na mitema na bango. »
17 Bongo na sima, abakisaki :
« Nakokanisa lisusu te,
ezala masumu na bango to mabe na bango. »
18 Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.
Koyika mpiko kati na Kondima
Kobatela elikya
19 Yango wana, bandeko na ngai, tozali solo na elikya ete tokokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo ete Yesu asopaki makila na Ye. 20 Afungolelaki biso nzela ya sika mpe ya bomoi na nzela ya rido ya Tempelo, oyo ezali nzoto na Ye moko. 21 Boye, tozali na Mokonzi Monene ya Banganga-Nzambe, oyo azali Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. 22 Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.
23 Tobatela makasi elikya oyo tozali kondima ete ezali ya solo, pamba te Ye oyo apesaki biso bilaka akosaka te. 24 Tosenzelana biso na biso mpo na kotindikana na bolingo mpe na misala ya malamu.
25 Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala ; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.
26 Pamba te, soki tokobi kosala masumu na nko sima na koyeba bosolo, mbeka mosusu mpo na bolimbisi ya masumu ekozala lisusu te ; 27 ekotikala kaka kozela na somo penza kosambisama mpe moto makasi oyo ekozikisa banguna ya Nzambe.
28 Soki babomaka na mawa te moto oyo abuki Mobeko ya Moyize, na litatoli ya bato mibale to misato, 29 ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu ?
30 Toyebi malamu Ye oyo alobaki : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto ; » mpe : « Nkolo akosambisa bato na Ye. » 31 Ezali somo makasi kokweya na maboko ya Nzambe na bomoi !
32 Bokanisa lisusu mikolo ya liboso, na tango Nzambe afungolaki bino miso mpo ete bokoma komona pole, boyikaki mpiko kati na bapasi ya makasi. 33 Ezalaki na batango oyo bazalaki kofinga bino, konyokola bino na miso ya bato ; ezalaki mpe na batango oyo bozalaki kokabola pasi elongo na bato oyo bazalaki konyokwama. 34 Bokabolaki pasi elongo na bakangami ya boloko, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola ata biloko na bino, pamba te boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko koleka, bomengo oyo ekowumela libela na libela.
35 Boye, bobungisa elikya na bino te, pamba te lifuti monene ekangani na yango. 36 Na bongo, boyika mpiko mpo ete, sima na bino kokokisa mokano ya Nzambe, bozwa biloko oyo alakaki. 37 Etikali moke, moke penza,
ete Ye oyo asengeli koya aya,
mpe akoya kala te.
38 Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima ;
kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.
39 Biso tozali te na molongo ya bato oyo bazongaka sima mpo na kobungisa bomoi na bango, kasi tozali na molongo ya bato oyo bazali na kondima mpo ete tobikisama.