8
Klisto, Mokonzi ya Banganga-Nzambe ya Boyokani ya sika
Tala likambo oyo eleki motuya kati na makambo oyo tozali koloba : tozali solo na Mokonzi se moko ya Banganga-Nzambe, Mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe kati na Likolo. Kuna na Likolo, asalaka mosala na Ye kati na Esika ya bule, elingi koloba : Mongombo ya solo, oyo Ye moko Nkolo atonga, kasi bato te.
Mokonzi nyonso ya Banganga-Nzambe atiamaka mpo na kobonza makabo mpe bambeka. Boye Yesu, Mokonzi na biso ya Banganga-Nzambe, asengeli mpe kozala na eloko ya kobonza lokola likabo to mbeka. Soki azalaki na mokili, alingaki kozala ata Nganga-Nzambe te, pamba te ezali kuna na Banganga-Nzambe oyo babonzaka makabo kolanda Mobeko, ba-oyo basalaka na Esika ya bule oyo ezali kaka elilingi mpe elili ya oyo ezali kati na Likolo. Yango wana, tango Moyize alingaki kotonga Mongombo, Nzambe akebisaki ye boye : « Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba. »
Kasi sik’oyo, Yesu azwi mosala oyo eleki motuya, pamba te azali Moyokanisi kati na Boyokani oyo eleki malamu, Boyokani oyo etongami na likolo ya bilaka ya malamu koleka.
Boyokani ya kala mpe Boyokani ya sika
Solo, soki boyokani ya liboso ezangaki pamela, tina ya koluka boyokani ya mibale elingaki kozala te.
Nzokande, Nzambe apamelaki penza bato na Ye tango alobaki :
« Na mikolo ekoya, nakosala Boyokani ya sika
elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda :
ekozala ndenge moko te na boyokani
oyo nasalaki elongo na batata na bango
tango nasimbaki bango na loboko
mpo na kobimisa bango na Ejipito,
pamba te lokola bakataki boyokani na Ngai,
Ngai mpe napesaki bango mokongo,
elobi Nkolo.
10 Kasi tala Boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele,
sima na mikolo wana,
elobi Nkolo :
‹ Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango,
nakokoma yango kati na mitema na bango,
nakozala Nzambe na bango,
mpe bango bakozala bato na Ngai.
11 Moko te akoteya lisusu moninga to ndeko na ye
na koloba : Yeba Nkolo !
Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai,
kobanda na mwana moke kino na mokolo,
12 nakolimbisa mabe na bango
mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. › »
13 Awa Nkolo abengi Boyokani oyo « Boyokani ya sika, » elingi koloba ete akomisi oyo ya liboso boyokani ya kala ; nzokande eloko oyo ekomi ya kala mpe enuni ekomi pene ya kolimwa.