11
Mokonzi ya sika akobimela na Izayi
Moto ya nzete ekobima na mobimbi ya Izayi ;
wuta na misisa na ye, Etape moko ekobota mbuma.
Molimo na Yawe akowumela na likolo na Ye :
Molimo ya bwanya mpe ya mayele,
Molimo ya toli mpe ya nguya,
Molimo ya boyebi mpe ya kotosa Yawe ;
esengo na ye ekozala na kotosa Yawe.
 
Akokata makambo ndenge emonanaka na libanda te
to mpe akozwa mikano te kolanda biyoka-yoka ;
kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo
mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili.
Akobeta mokili fimbu na maloba na ye
mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.
Bosembo ekozala mokaba na ye,
mpe boyengebene ekozala na loketo na ye
lokola mokaba oyo bamemelaka bibundeli.
 
Mbwa ya zamba ekovanda esika moko na mwana meme,
nkoyi ekolala esika moko na mwana ntaba ;
mwana ngombe ya mobali, mwana nkosi mpe banyama ya mafuta ekolia esika moko,
bongo mwana moke nde akoyeisa yango.
Ngombe ya mwasi mpe ngombolo ekolia esika moko,
bana na yango mpe ekolala esika moko,
bongo nkosi ekolia matiti lokola ngombe.
Mwana moke akosakana pene ya lidusu ya nyoka,
mpe elenge mwana akokotisa loboko na ye na zala ya nyoka.
Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te
na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule,
pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe
ndenge mayi etondaka na ebale.
10 Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo. 11 Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.
12 Akotombola bendele mpo na bikolo
mpe akosangisa bana ya Isalaele oyo bazali na bowumbu ;
akosangisa esika moko bato ya Yuda
oyo bapalangana na mokili mobimba.
13 Motema likunya ya Efrayimi ekosila,
mpe banguna ya Yuda bakobebisama ;
Efrayimi akozala lisusu na motema likunya te mpo na Yuda
to mpe Yuda akozala lisusu monguna ya Efrayimi te.
14 Bakosangela elongo bato ya mboka Filisitia
na bangomba mikuse ya ngambo ya weste ;
bakobebisa elongo bikolo ya ngambo ya este,
bakokonza bato ya Edomi mpe ya Moabi,
bongo bato ya Amoni bakokoma bawumbu na bango.
15 Yawe akokawusa mayi ya eteni ya ebale
oyo ekota na mabele ya Ejipito ;
loboko na Ye ekoningisa ebale
mpe akokabola yango na biteni sambo na mopepe makasi
mpo ete bato bakoka kokatisa na makolo.
16 Nzela moko ekosalema mpo na ndambo ya bato na Ye
oyo batikalaki na bomoi wuta na Asiri
ndenge esalemaki tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito.