Masakoli na tina na bikolo ya bapaya
13
Maloba ya kosambisa Babiloni
Maloba ya kosambisa Babiloni, oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, azwaki na emoniseli :
Botombola bendele likolo ya ngomba oyo ezanga banzete,
boganga epai na bango ;
bopepa bango loboko
mpo ete bakota na bikuke ya bakambi.
Napesaki mitindo epai na bato
oyo babulisama mpo na Ngai ;
nabengisaki lisusu bilombe na Ngai,
bato oyo basepelaka na lokumu na Ngai,
mpo na kosilisa kanda na Ngai.
Boyoka makelele likolo ya bangomba :
ezali lokola makelele ya bato ebele !
Boyoka lokito ya makelele ya bikolo :
ezali lokola bikolo esangana esika moko !
Yawe, Mokonzi ya mampinga,
azali kotala mampinga ya basoda oyo bazali
pene ya kokende na etumba.
Bawuti na mikili ya mosika, na suka ya likolo ;
Yawe elongo na bisalelo ya kanda na Ye ;
mpo na kobebisa mokili mobimba.
Bolela, pamba te mokolo na Yawe ekomi pene,
ekoya lokola kobebisama oyo ewuti na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Yango wana, maboko nyonso ekolemba
mpe mitema ya bato nyonso ekobukana.
Somo makasi ekokweyela bango,
pasi mpe kobanga ekotika bango te ;
bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
Bango na bango bakotalana na kokamwa
mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.
Tala, mokolo na Yawe ezali koya,
ezali mokolo moko ya pasi,
mokolo ya kotomboka mpe ya kanda makasi
mpo na kobebisa mokili
mpe koboma bato ya masumu kati na yango.
10 Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango
ekopesa lisusu pole na yango te :
moyi ekokoma molili tango tongo ekotana,
mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.
11 Nakopesa etumbu na mokili mpo na mabe na yango,
mpe bato mabe, mpo na masumu na bango.
Nakosukisa lofundu ya bato ya lolendo
mpe nakokitisa lolendo ya banyokoli.
12 Nakosala ete bato bakoma ya koluka lokola wolo ya peto,
lokola wolo ya mboka Ofiri.
13 Yango wana nakolengisa likolo,
mpe mabele ekoningana na bisimbelo na yango
na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga,
na mokolo oyo akopelisa kanda na Ye.
 
14 Lokola mboloko oyo bazali kolanda,
lokola bameme oyo ezanga mobateli,
moko na moko akozonga epai ya bato na ye,
moko na moko akokima kino na mboka ya bakoko na ye.
15 Bakotobola na likonga
moto nyonso oyo bakokanga.
Bato nyonso oyo bakozwa,
bakokufa na mopanga.
16 Bakokata-kata bana na bango na biteni na miso na bango,
bakobebisa bandako na bango
mpe bakozwa basi na bango na makasi.
 
17 Tala, nakotelemisa bato ya Medi ete batelemela bango,
bato oyo palata elobelaka bango eloko moko te
mpe basepelaka na bango na wolo te.
18 Boye, tolotolo na bango ekoboma bilenge mibali
mpe bakoyokela mbuma ya libumu mawa te :
liso na bango ekotala bana na mawa te.
19 Nzambe akokweyisa Babiloni,
kongenga ya babokonzi, nkembo ya lolendo ya bato ya Chalide,
ndenge akweyisaki Sodome mpe Gomore.
20 Bato bakotikala kovanda lisusu kuna te
to ekozala lisusu na bato te na milongo nyonso ;
kuna, moto ya Arabi akopika te ndako na ye ya kapo,
mpe babateli bibwele bakopemisa te banyama na bango.
21 Kasi bikelamu ya esobe nde ekokoma kolala kuna ;
bambwa ya zamba nde ekotondisa bandako na yango,
ba-esulungutu ekotonda na bandako,
maligbanga ekokoma kovanda kuna
mpe bantaba ya zamba ekokoma kopumbwa-pumbwa kuna.
22 Banyawu ya zamba ekotonda
na bandako na bango ya makasi,
mpe bambwa ya zamba ekotonda na bandako na bango ya kitoko.
Tango na yango esili kobelema,
mpe mikolo na yango ekopusana lisusu te.