45
Mokangoli akoya
« Tala liloba oyo Yawe alobi
epai ya Sirisi, mopakolami na Ye,
oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali
mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye
mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi,
mpo na kofungola bikuke liboso na ye
mpo ete bikuke yango ekangama te :
Nakotambola liboso na yo
mpe nakolalisa bangomba,
nakobuka bikuke ya bronze
mpe nakokata-kata bibende oyo bakangelaka yango.
Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili,
bozwi oyo batia na bisika ebombama,
mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele,
oyo abengi yo na kombo na yo.
Mpo na bolingo ya Jakobi, mosali na Ngai,
mpe Isalaele, moponami na Ngai,
nabengi yo na kombo na yo,
napesi yo kombo ya lokumu
atako oyebi Ngai nanu te.
Nazali Yawe, mosusu azali te ;
Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.
Nalatisi yo mokaba na loketo
atako oyebi Ngai nanu te ;
mpo ete, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste,
bato bayeba ete mosusu azali te,
bobele Ngai nde nazali Nzambe.
Nazali Yawe, mosusu azali te.
Nasalaka pole mpe nakelaka molili,
napesaka kimia mpe nakelaka pasi ;
Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso.
 
Yo, Lola kuna na likolo, nokisa bosembo lokola mvula,
tika ete mapata ekitisa yango !
Tika ete mabele efungwama
mpo ete lobiko ebima ;
tika ete bosembo ekola nzela moko !
Ezali Ngai Yawe nde nakelaki yango.
 
Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye,
ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele !
Boni, potopoto ekoki solo koloba
na moto oyo asali yango :
‹ Ozali kosala nini ? ›
Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba :
‹ Azali na maboko te ? ›
10 Mawa na ye oyo alobaka na tata na ye :
‹ Mpo na nini obotaki ngai ? ›
Mpe na mama na ye :
‹ Mpo na nini obotaki ngai ? ›
 
11 Tala liloba oyo Yawe, Mosantu ya Isalaele
mpe Mokeli na ye, alobi :
Boni, bino nde bato bokotuna Ngai
soki nakosala nini mpo na bana na Ngai
na mikolo oyo ekoya
to bino nde bato bokopesa Ngai mitindo
mpo na mosala oyo maboko na Ngai esali ?
12 Ngai nde nasala mabele
mpe nakela bato kati na yango ;
loboko na Ngai moko nde etandaki likolo lokola liputa
mpe etiaki mampinga na yango nyonso na molongo.
13 Nakobimisa Sirisi na bosembo na Ngai ;
nakokomisa nzela na ye nyonso alima.
Akotonga lisusu engumba na Ngai
mpe akopesa bonsomi na bakangami na Ngai ;
ekozala na motuya ya mbongo to ya biloko te,
elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
 
14 Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Mosala ya Ejipito, mombongo ya Kushi
mpe bato milayi ya Seba,
bakoleka epai na yo mpe bakozala ya yo.
Bakotambola ya kokangama na minyololo, sima na yo ;
bakofukama liboso na yo
mpe bakobondela yo na maloba oyo :
‹ Solo, Nzambe azali penza epai na yo,
nzambe mosusu azali te ! › »
 
15 Solo, ozali Nzambe oyo amibombaka,
Nzambe, Mobikisi ya Isalaele !
16 Bato nyonso oyo basalaka banzambe ya bikeko
bakoyoka soni mpe bakosambwa ;
bango nyonso, bakokende na soni.
17 Kasi Yawe akobikisa Isalaele
na lobiko ya seko na seko.
Bokotikalaka lisusu koyoka soni te mpe kosambwa te,
libela na libela.
 
18 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi,
Ye oyo akela likolo,
Ye oyo azali Nzambe oyo asala mpe abongisa mabele,
mpe atelemisa yango ngwi ;
Ye akelaki yango te mpo ete ezala pamba,
kasi asalaki yango mpo ete bato bavanda :
« Nazali Yawe,
mpe mosusu azali te.
19 Nalobaki na nkuku te,
kati na esika moko te ya molili ya mokili ;
nalobaki te na bakitani ya Jakobi :
‹ Boluka Ngai kati na pamba ! ›
Nazali Yawe, nalobaka oyo ezali sembo,
nasakolaka oyo ezali alima.
 
20 Bosangana elongo mpe boya,
bopusana elongo bino nyonso,
bino bato oyo bobiki kati na bikolo !
Bato oyo bamemaka banzambe ya bikeko basala na nzete
mpe babelelaka nzambe oyo ebikisaka te ;
bazangi boyebi.
21 Botelema mpe bopesa sango,
boloba makambo na bino
mpe tosamba elongo !
Nani asakolaki yango wuta kala
mpe atatolaki yango wuta na tango oyo eleka ?
Ezali Ngai Yawe te ?
Ezali na Nzambe mosusu te, soki Ngai te.
Nazali Nzambe ya sembo mpe Mobikisi ;
mosusu azali te, soki Ngai te.
 
22 Bozonga epai na Ngai mpo ete bobika,
bino nyonso oyo bozali na basuka ya mokili ;
pamba te Ngai, nazali Nzambe,
mpe mosusu azali te.
23 Nalapi ndayi na Kombo na Ngai ;
oyo ezali sembo ebimaka na monoko na Ngai,
liloba oyo bakoki koboya te :
mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai,
mpe minoko nyonso ekolapa ndayi na Kombo na Ngai.
24 Bakoloba na tina na Ngai :
‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › »
Bato nyonso oyo batombokelaki Ye
bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni.
25 Ezali kati na Yawe nde bato nyonso
oyo bazali bakitani ya Isalaele bakokoma bato ya sembo
mpe bakozwa lokumu.