9
Bato oyo bazalaki kotambola kati na molili
bamoni pole makasi ;
ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi,
pole engengeli bango.
Okomisaki bango ekolo monene,
obakisaki esengo na bango.
Bazali kosepela liboso na Yo
ndenge basepelaka tango babukaka milona,
ndenge mibali basepelaka
tango bakabolaka bomengo ya bitumba.
 
Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango,
nzete oyo ezalaki na mapeka na bango
mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango,
Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani.
Basapato nyonso ya basoda
oyo lokito na yango eningisaka mabele,
mpe bilamba nyonso oyo etondaki na makila,
ekobwakama na moto
mpo ete ezika makasi.
 
Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso,
mwana mobali moko apesameli biso,
mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye ;
bakobenga ye : Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya,
Tata ya seko, Mokonzi ya kimia.
Bokonzi na ye ekokende mosika penza,
mpe kimia na ye ekozala na suka te.
Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi,
akozala mokonzi ya mokili na ye,
akolendisa mpe akokamba yango
na bosembo mpe na boyengebene,
wuta na tango oyo kino libela na libela.
Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
akosala na bolingo makasi na Ye.
Kanda ya Yawe mpo na Isalaele
Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi,
mpe liloba yango ekomeli Isalaele.
Bato nyonso bakoyeba yango,
Efrayimi mpe bavandi ya Samari,
oyo balobaka na lofundu mpe na lolendo ya mitema :
« Ata babiliki ekweyi,
tokotonga lisusu na mabanga bakata ;
ata bakati banzete ya sikomori,
tokotia na esika na yango banzete ya sedele. »
10 Kasi Yawe alendisaki bayini ya Retsini
mpo na kobundisa bango
mpe apelisaki mitema ya banguna na bango
mpo ete batombokela bango.
11 Bato ya Siri na liboso, mpe bato ya Filisitia na sima,
bapasolaki Isalaele mpe baliaki ye na lokoso.
Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te,
loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
 
12 Kasi atako bongo, bato bazongaki kaka te
epai na Yawe oyo abetaki bango,
mpe balukaki te Yawe, Mokonzi ya mampinga.
13 Yango wana, kaka na mokolo moko,
Yawe akokata, kati na Isalaele,
moto mpe mokila, lindalala mpe nzete oyo ebotaka na mayi.
14 Bampaka mpe bato ya lokumu, bango nde moto ;
mpe basakoli ya lokuta, bango nde mokila.
15 Bakambi ya bato babungisi bato na bango nzela,
mpe bato oyo balandaka bango bakomi kotelengana.
16 Yango wana, Nkolo akosepela na bilenge te,
akoyokela bana bitike mpe basi bakufisa mibali mawa te,
pamba te bango nyonso bazali kotiola Nzambe,
bazali kosala mabe,
mpe minoko nyonso ezali kobimisa maloba ya bozoba.
 
Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki te,
loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
 
17 Solo, mabe etumbaka lokola moto
oyo ezikisaka basende mpe banzube,
ezikisaka bazamba minene
mpe ematisaka makonzi ya milinga.
18 Na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga,
mokili eziki na moto,
mpe bato bakomi lokola mafuta na moto.
Moto moko te akobikisa ndeko na ye.
19 Na ngambo ya loboko ya mobali,
bakobotola bato biloko,
kasi bato bakozala kaka na nzala ;
na ngambo ya loboko ya mwasi, bakolia,
kasi bato bakotonda kaka te ;
moko na moko akolia mosuni ya loboko na ye :
20 Manase akolia Efrayimi,
mpe Efrayimi akolia Manase ;
bango mibale bakosangana mpe bakobalukela Yuda.
Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te,
loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.