2
Libondeli ya Yona
Yawe atindaki mbisi moko ya monene komela Yona. Boye Yona asalaki kati na libumu ya mbisi yango mikolo misato mpe babutu misato. Wuta na libumu ya mbisi, Yona asambelaki Yawe, Nzambe na ye. Alobaki :
« Kati na mawa na ngai,
nabelelaka Yawe,
mpe ayanolaka ngai.
Wuta kati na mboka ya bakufi,
nasengaka lisungi,
mpe ayokaka ngai.
 
Obwakaki ngai kati na libulu ya molili makasi,
kati na mozindo ya ebale monene
epai wapi mayi ezingeli ngai
mpe bambonge na yo nyonso ekweyeli ngai.
 
Nazali komilobela :
‹ Obengani ngai mosika na miso na Yo ;
nzokande ngai nazali kokoba kotalela
Tempelo na Yo ya bule. ›
 
Nazindi kino na kingo,
mayi ya libulu ya molili makasi ezingeli ngai,
matiti ya ebale ekangani-kangani zingazinga ya moto na ngai.
Nazindi kino na esika oyo ngomba ebandaka,
mabele esili kokanga bikangelo na yango
sima na ngai mpo na libela.
Kasi Yo Yawe, Nzambe na ngai,
obimisi ngai ya bomoi wuta na libulu ya mozindo.
Wana nakomi pene ya kobungisa elikya,
nakanisi Yo, Yawe,
mpe libondeli na ngai emati kino epai na Yo,
kino na Tempelo na Yo ya bule.
 
Bato oyo bakangamaka
na banzambe ya bikeko ezanga tina
babungisaka bolingo oyo Nzambe alingaka bango.
10 Kasi ngai, na koyembaka nzembo ya matondi,
nalingi kobanda kobonzelaka Yo bambeka
mpe kokokisaka bilaka oyo nazali kopesa,
pamba te lobiko ezali ya Yawe. »
11 Mpe Yawe apesaki mitindo na mbisi, mpe mbala moko, mbisi esanzaki Yona na mokili.