Jeremi
1
Kosambisama ya mokili ya Yuda
Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame ; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye.
Yawe alobaki na ye tango mokonzi Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi, mpe na tango ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino na suka ya sanza ya mitano ya mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino tango bato ya Yelusalemi bakendeki na bowumbu.
 
Kobengama ya Jeremi
Yawe alobaki na ngai :
— Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo ; liboso ete obotama, nabulisaki yo : naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.
Nazongisaki :
— Oh Nkolo Yawe, nayebi koloba te, pamba te nazali nanu elenge !
Kasi Yawe alobaki na ngai :
— Koloba te : « Nazali elenge. » Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo. Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, —elobi Yawe.
Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki :
— Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo. 10 Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.
Emoniseli ya nzete ya amande
11 Sima na yango, Yawe atunaki ngai :
— Jeremi, ozali komona nini ?
Nazongisaki :
— Nazali komona etape ya nzete ya amande.
12 Yawe alobaki na ngai :
— Omoni malamu, pamba te nasenzelaka maloba na Ngai mpo na kokokisa yango.
Emoniseli ya nzungu
13 Yawe atunaki ngai lisusu :
— Ozali komona nini ?
Nazongisaki :
— Nazali komona nzungu moko ezali kotoka, etengama na ngambo ya nor.
14 Yawe alobaki na ngai :
— Ezali wuta na nor nde pasi ekokomela bavandi ya mokili. 15 Pamba te nakobengisa bato nyonso ya bituka ya nor, —elobi Yawe.
Bakonzi na bango bakoya kotia
bakiti na bango ya bokonzi liboso ya bikuke ya Yelusalemi ;
bakozingela bamir nyonso ya Yelusalemi
mpe bakobundisa bingumba nyonso ya Yuda.
16 Nakosambisa bato na Ngai mpo na mabe oyo basalaki :
basundolaki Ngai, bakomaki kobonza mbeka ya malasi
epai ya banzambe mosusu,
mpe bakomaki kogumbamela banzambe
oyo basalaki na maboko na bango.
 
17 Mibongisa, yika mpiko !
Telema mpe yebisa bango makambo nyonso
oyo Ngai nakotinda yo ;
kozala na somo na bango te,
noki te nakokweyisa yo liboso na bango.
18 Na mokolo ya lelo, nakomisi yo engumba batonga makasi,
likonzi ya ebende mpe mir ya ebende
mpo na komibatela liboso ya mokili mobimba :
liboso ya bakonzi ya Yuda, ya bakalaka na yango,
ya Banganga-Nzambe na yango
mpe ya bavandi nyonso ya mokili yango.
19 Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te ;
pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo,
elobi Yawe.