3
Mateya ya Yoane Mobatisi
(Mlk 1.2-8; Lk 3.1-18; Yn 1.19-23)
Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda : « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »
Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki :
« Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe :
‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo,
bosembolela Ye banzela ya mike ! › »
Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi. Bato bazalaki kokende epai na ye longwa na Yelusalemi, na Yuda mobimba mpe na etuka mobimba ya Yordani ; bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.
Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ? Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema. Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami. 10 Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa : nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto.
11 Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto. 12 Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »
Kobatisama ya Yesu
(Mlk 1.9-11; Lk 3.21-22; Yn 1.29-34)
13 Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye. 14 Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki :
— Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai ; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai ?
15 Yesu azongiselaki ye :
— Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.
16 Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki ; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga. 17 Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »