6
Mateya na tina na makabo epai na babola
Bosala keba ete bosalelaka te bosembo na bino liboso ya bato, mpo ete bamona bino ; soki te, bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abombela bino. Tango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango. Kasi tango yo ozali kokabela babola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba ete likambo oyo loboko na yo ya mobali ezali kosala, mpo ete likabo na yo ya mawa etikala sekele ; bongo Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
Mateya na tina na libondeli
Tango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango. Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi. Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.
(Lk 11.2-4)
Tala ndenge nini bosengeli kosambela :
‹ Tata na biso,
Yo oyo ozali kati na Likolo ;
tika ete Kombo na Yo ebulisama,
10  tika ete Bokonzi na Yo eya,
tika ete mokano na Yo esalema,
awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo !
11  Pesa biso, na mokolo ya lelo,
bilei na biso ya mokolo na mokolo ;
12  limbisa mabe na biso,
ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe ;
13  komema biso na komekama te,
kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ;
[pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo
ezali ya Yo seko na seko.]* ›
14  Pamba te soki bolimbisi baninga, na mabe oyo basali bino, Tata na bino ya Likolo mpe akolimbisa bino ; 15  kasi soki bolimbisi te, Tata na bino mpe akolimbisa te mabe na bino.
Mateya na tina na kokila bilei
16  Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango. 17  Kasi tango yo ozali kokila bilei, sukola elongi na yo malamu mpe pakola moto na yo malasi, 18  mpo ete moto moko te ayeba ete ozali kokila bilei, longola kaka Tata na yo, oyo amonanaka te ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku akopesa yo lifuti.
Mateya na tina na bomengo
(Lk 12.33-34)
19  Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango. 20  Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango ; 21  pamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.
Mwinda ya nzoto
(Lk 11.34-36)
22  Miso ezali lokola mwinda ya nzoto. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na pole. 23  Kasi soki miso na yo ekufi, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na molili. Bongo soki pole oyo ezali kati na yo ekomi molili, molili yango ekozala makasi penza.
Nzambe to mbongo
(Lk 16.13)
24  Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.
Mateya na tina na mitungisi
25  Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ? 26  Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ? 27  Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye ?
28  Bongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata ? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka ! Esalaka te mpe etongaka bilamba te ; 29  nzokande, nazali koloba na bino ya solo ete ata Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango. 30  Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke ! 31  Yango wana, bomitungisaka te na koloba : ‹ Tokolia nini ? Tokomela nini ? Tokolata nini ? › 32  Biloko wana nyonso, ezali bapagano nde balukaka-lukaka yango ; kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango. 33  Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
34  Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko : mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.
* 6:13 Makomi oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.