8
Yesu abikisi babeli
(Mlk 1.40-45; Lk 5.12-16)
Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye. Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki :
— Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki :
— Nalingi ete ezala bongo, koma peto.
Mbala moko, apetolamaki na maba na ye ; mpe Yesu alobaki na ye :
— Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
(Lk 7.1-10; Yn 4.43-54)
Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi. Alobaki :
— Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali kokoka kotambola te mpe azali kobela makasi.
Yesu azongiselaki ye :
— Nakoya kobikisa ye.
Mokonzi ya basoda alobaki :
— Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye. Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai ; soki nalobi na moko : « Kende ! » akendaka ; mpe soki nalobi na mosusu : « Yaka ! » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo ! » asalaka yango.
10 Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele ! 11  Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo. 12  Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
13 Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda :
— Zonga na ndako na yo ! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo !
Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.
Yesu abikisaki bokono na biso
(Mlk 1.29-34; Lk 4.38-41)
14 Tango Yesu akomaki na ndako ya Petelo, akutaki mama-bokilo ya Petelo alala mpo ete azalaki kobela fievele. 15 Yesu asimbaki ye na loboko, mpe fievele esilaki ; bongo atelemaki mpe akomaki kobongisela Yesu bilei.
 
16 Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso. 17 Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki :
« Amemaki mokumba ya pasi na biso
mpe abikisaki biso na bokono na biso. »
Pasi ya kolanda Yesu
(Lk 9.57-62)
18 Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale. 19 Molakisi moko ya mibeko apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki :
— Moteyi, nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.
20 Kasi Yesu alobaki na ye :
— Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
21 Moto mosusu oyo azalaki moko kati na bayekoli ya Yesu alobaki na Ye :
— Nkolo, pesa ngai nzela ete nakende nanu kokunda tata na ngai.
22 Kasi Yesu alobaki na ye :
— Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.
Yesu aleki mopepe na nguya
(Mlk 4.36-41; Lk 8.22-25)
23 Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye. 24 Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi. 25 Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga :
— Nkolo, bikisa biso ! Tozali kokufa !
26 Kasi Yesu alobaki na bango :
— Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ?
Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki. 27 Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? »
Yesu aleki milimo mabe na nguya
(Mlk 5.1-20; Lk 8.26-39)
28 Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu ; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana. 29 Bakomaki koganga :
— Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?
30 Etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia mwa mosika ya esika oyo bazalaki. 31 Milimo mabe esengaki na Yesu :
— Soki okobengana biso, tinda biso kati na etonga wana ya bangulu.
32 Yesu alobaki na milimo yango :
— Bobima !
Milimo mabe ebimaki kati na bato wana mibale mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga nyonso ya bangulu ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba kino na ebale ; mpe yango nyonso ezindaki mpe ekufaki kati na mayi.
33 Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama. 34 Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu ; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango.