3
Basi mpe mibali kati na libala
Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te, tango bakomona bino kotambola na bomoi ya peto mpe ya botosi.
Bolukaka kaka te kokoma kitoko na libanda na nzela ya kokanga suki, kolata babiju ya wolo to bilamba ya kitoko ; kasi bolukaka nde kitoko ya bomoto ya kati : esilaka te, ewutaka na molimo ya boboto mpe ya kimia, ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde basi ya bule oyo, na kala, bazalaki kotia elikya na bango na Nzambe bazalaki komikomisa kitoko. Bazalaki kotosa mibali na bango, lokola Sara oyo atosaki Abrayami kino kobenga ye « nkolo na ngai. » Bozali bana basi ya Sara soki bosali bolamu mpe bopesi nzela te na bobangi.
Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.
Kosala bolamu
Mpo na kosukisa, bozalaka, bino nyonso, na makanisi moko, boyokelanaka mawa, bolinganaka lokola bandeko, bozalaka bato malamu mpe bato ya komikitisa. Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino. 10 Solo,
moto nyonso oyo azali na posa ya kolinga bomoi
mpe kobika mikolo ya esengo
asengeli kobatela lolemo na ye mosika na mabe,
mpe bibebu na ye mosika na maloba ya lokuta ;
11 asengeli kokima mabe mpe kosala bolamu,
koluka kimia mpe kokoba na yango,
12 pamba te miso ya Nkolo etalaka bato ya sembo,
mpe matoyi na Ye eyokaka losambo na bango.
Kasi Nkolo apesaka bato mabe mokongo.
Kotatola elikya
13 Nani akosala bino mabe soki bomipesi na kosala bolamu ? 14 Bokozala kutu bato ya esengo, ezala soki bokomona pasi mpo na bosembo. Bobangaka bato te mpe bomitungisaka te. 15 Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango, 16 kasi botatolaka yango na boboto, na limemia mpe na mitema peto, mpo ete bato oyo balobaka mabe na tina na etamboli na bino ya malamu kati na Klisto bakufa soni. 17 Eleki malamu komona pasi na kosala bolamu, soki yango ezali mokano ya Nzambe, na esika ete omona pasi na kosala mabe.
Ndakisa oyo eleki malamu
18 Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.
19 Ezali mpe kaka na nguya ya Molimo yango nde akendeki kosakola elonga na Ye epai ya milimo oyo ezalaki ya kokangama kati na boloko, 20 milimo oyo etosaki te na tango ya kala, na tango oyo Nzambe azalaki kokanga motema wana azalaki kozela ete Noa asilisa kotonga masuwa. Kati na masuwa yango, motango moke kaka ya bato, bato mwambe, nde babikisamaki na mayi ya mpela. 21 Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto 22 oyo akotaki kati na Likolo, avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kokonza ba-anjelu, banguya mpe milimo ya mipepe na likolo.