Nzembo 102
Libondeli ya moto na pasi
Libondeli ya moto na pasi, oyo abungisi elikya mpe azali kolela liboso ya Yawe.
Yawe, yoka libondeli na ngai !
Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo !
Kobombela ngai elongi na Yo te,
wana nazali na pasi.
Yoka libondeli na ngai
na mokolo oyo nazali kobelela Yo ;
yanola ngai noki !
 
Pamba te mikolo ya bomoi na ngai ezali kolimwa
lokola molinga,
mikuwa na ngai ezali kozika
lokola makala ya moto.
Motema na ngai ebungisi elikya
mpe ezali komitungisa lokola matiti oyo bakati ;
mpo na yango, nakomi ata kobosana
kolia bilei na ngai.
Mpo ete naleli makasi,
natikali kaka na poso ya nzoto likolo ya mikuwa.
 
Nakomi lokola esulungutu ya esobe,
lokola esulungutu ya bisika oyo ebeba.
Pongi ekimi ngai ;
nakomi lokola ndeke oyo etikali yango moko
na likolo ya ndako.
 
Banguna na ngai batombokeli ngai,
bazali kofinga ngai tango nyonso
mpe bazali kosalela kombo na ngai
mpo na kolakela bato mabe.
10 Nakomi kolia putulu na esika ya bilei,
mpe komela mayi esangana na mpinzoli na ngai.
 
11 Mpo na kanda monene na Yo,
otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika.
12 Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokima lokola elili,
mpe nakawuki lokola matiti.
 
13 Kasi Yo Yawe, ozali Mokonzi
mpo na libela,
ozali Nzambe seko na seko.
14 Okotelema solo mpo na Siona,
pamba te ekomi tango ya koyokela yango mawa ;
tango oyo ekatama ekoki.
15 Pamba te biso basali na Yo, tosepelaka
na mabanga na yango,
mpe toyokelaka putulu na yango mawa.
 
16 Bikolo ekotosa Yawe,
mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima
nkembo na Yo.
17 Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona
mpe akomonana kati na nkembo na Ye.
18 Akoyanola libondeli ya bato
oyo babungisaki biloko,
mpe akondima mabondeli na bango.
 
19 Tika ete bakoma yango
mpo na ekeke oyo ekolanda,
mpo ete bikelamu ya sika ekumisa Yawe.
20 Wuta na Esika na Ye ya bule,
wuta na likolo, Yawe atalaki biso
awa na mokili
21 mpo na koyoka kolela ya bakangami
kati na boloko
mpe kokangola bato oyo bazwaki etumbu ya kufa.
 
22 Kombo ya Yawe ekokende sango
kati na Siona,
mpe masanzoli na Ye, kati na Yelusalemi
23 tango bato mpe bikolo bakosangana
mpo na kogumbamela Yawe.
 
24 Na bomoi na ngai, abukaki lolendo
ya makasi na ngai,
mpe akitisaki motango ya mikolo ya bomoi na ngai.
25 Nalobaki :
« Nzambe na ngai,
Yo oyo ozali na bomoi seko na seko,
koboma ngai te na kati-kati ya mikolo
ya bomoi na ngai !
26 Na kala, otiaki miboko ya mokili,
mpe maboko na Yo esalaki Likolo.
27 Bango, bakokufa ;
kasi Yo, okotikala seko na seko.
Nzoto na bango ekolemba lokola elamba ;
okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa.
28 Kasi Yo, ozali ndenge moko,
mibu na Yo ekotikala kosuka te.
 
29 Bana ya basali na Yo bakozwa esika ya kovanda,
mpe bakitani na bango bakowumela liboso na Yo. »