Nzembo 118
Bolingo ya Yawe ezali na suka te
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,
pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
 
Tika ete Isalaele aloba :
« Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »
Tika ete bakitani ya Aron baloba :
« Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »
Tika ete bato oyo batosaka Yawe baloba :
« Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »
 
Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,
mpe Yawe ayanolaki ngai, abikisaki ngai.
Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ;
bato bakoki kosala ngai nini ?
Yawe azali mpo na ngai,
ayaka kosunga ngai ;
boye natalaka banguna na ngai na miso
lokola molongi.
 
Eleki malamu koluka ebombamelo
kati na Yawe
na esika ya kotia elikya na bato.
Eleki malamu koluka ebombamelo
kati na Yawe
na esika ya kotia elikya
kati na bato minene ya mokili.
 
10 Bikolo nyonso ezingelaki ngai,
kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.
11 Bakobaki kaka kozingela ngai,
kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.
12 Bazingelaki ngai lokola banzoyi,
kasi ekufaki lokola moto ya esobe ;
nabebisaki yango na Kombo na Yawe.
 
13 Batindikaki ngai mpo ete nakweyisa kondima,
kasi Yawe asungaki ngai.
14 Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ;
apesaki ngai elonga.
 
15 Koganga ya esengo mpe ya elonga eyokanaka
wuta na bandako ya kapo ya bato ya sembo,
pamba te nguya na Yawe esalaka
makambo minene !
16 Yawe asembolaka loboko na Ye ya mobali,
mpe nguya na Yawe esalaka makambo minene.
17 Nakokufa te, nakozala na bomoi
mpe nakopanza sango ya misala ya Yawe.
18 Solo, Yawe apesaki ngai etumbu makasi ;
kasi akabaki ngai na kufa te.
 
19 Bofungolela ngai bikuke ya bosembo
mpo ete nakota mpe nakumisa Yawe.
20 Tala ekuke ya Yawe ;
bato ya sembo bakotelaka na ekuke yango.
 
21 Nasanzolaka Yo, pamba te oyanolaki ngai
mpe opesaki ngai elonga.
22 Libanga oyo batongi ndako babwakaki
ekomi libanga ya songe ya ndako,
mpe esimbi ndako mobimba.
23 Ezali Yawe nde alingaki bongo,
mpe ezali penza likambo ya kokamwa
na miso na biso !
 
24 Tala mokolo oyo Yawe asali ;
tika ete tosepela mpe toganga na esengo
mpo na mokolo yango !
25 Yawe, nabondeli Yo, pesa lobiko.
Yawe, nabondeli Yo, pesa elonga.
 
26 Tika ete apambolama,
Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !
Tozali kopambola bino
wuta na Tempelo ya Yawe.
27 Yawe azali Nzambe,
mpe angengisaki biso.
Bokota na molongo, bomema mandalala na maboko
mpe bokende kino na maseke ya etumbelo.
 
28 Ozali Nzambe na ngai, nasanzolaka Yo !
Ozali Nzambe na ngai, nanetolaka Yo.
 
29 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,
pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !