Nzembo 137
Pembeni ya bibale ya Babiloni
Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni,
tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.
Todiembikaki mandanda na biso
na banzete ya pepiliye ya etuka yango.
 
Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbu
bazalaki kosenga biso banzembo ;
mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga biso
ete tozala na esengo.
Bazalaki koloba :
« Boyembela biso banzembo ya Siona ! »
 
Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge nini
na mabele ya bapaya ?
Oh Yelusalemi, soki nabosani yo,
wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba !
Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi,
soki natie yo te liboso ya esengo nyonso,
wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai !
 
Yawe, kobosana te bato ya Edomi
oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ;
bazalaki koganga :
« Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »
 
Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo,
esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe
oyo osalaki biso !
Esengo na moto oyo akokanga bana na yo
mpe akonika bango na libanga !