Nzembo 139
Yawe, oyebi nyonso na tina na ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Yawe, omonaka mozindo ya bomoi na ngai
mpe oyebi ngai malamu ;
oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka.
Liboso na ngai kokanisa, ososolaka mabongisi na ngai ;
omonaka tango natambolaka mpe tango nalalaka,
oyebi mozindo ya banzela na ngai nyonso.
Pamba te, oh Yawe, liboso ete liloba ekoma na lolemo na ngai,
omiyebelaka yango.
Ozali pene ngai, na liboso mpe na sima,
mpe osimbi ngai na loboko na Yo.
Solo, boyebi oyo ya kokamwa elekelaka ngai,
ezali likolo makasi, nakoki kososola yango te.
 
Nakende wapi mpo na kokima Molimo na Yo ?
Nakima wapi mpo na kozala mosika na Yo ?
Soki namati na likolo, ozali kuna ;
soki nakeyi na mboka ya bakufi, ozali lisusu kuna.
Soki nazwi mapapu ya lipekapeka
mpo na kokende kovanda mosika ya ebale monene,
10 kuna mpe loboko na Yo ekotambolisa ngai,
loboko na Yo ya mobali ekosimba ngai makasi.
11 Soki nalobi : « Tembe te, molili ekobomba ngai penza ;
tika ete pole ekoma butu zingazinga na ngai ! »
12 Epai na Yo, butu ezalaka molili te,
butu ezalaka na pole lokola moyi,
pole mpe molili ezali ndenge moko.
 
13 Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,
obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
14 Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.
Misala na Yo ezali ya kokamwa ;
ngai, nayebi yango malamu.
 
15 Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te
tango osalaki ngai na esika ebombama,
tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.
 
16 Tango nazalaki nanu na lolenge te,
ozalaki komona ngai ;
mpe omikomelaki kati na buku na Yo
mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai
liboso ete moko te kati na yango ezala.
 
17 Oh Nzambe, tala ndenge ezali pasi mpo na ngai
kososola makanisi na Yo !
Tala ndenge motango na yango ezali ebele !
18 Nameki kotanga yango,
ezali ebele koleka motango ya bambuma ya zelo.
Nalamuki, nazali kaka elongo na Yo.
19 Oh Nzambe, soki kaka ozalaki na Yo koboma moto mabe !
Bino basopi makila ya bato, bokende mosika na ngai !
20 Bayini na Yo basalelaka Kombo na Yo
mpo na kosala mabongisi ya mabe,
batangaka Kombo na Yo mpo na kokosa.
 
21 Yawe, ndenge nini nayina te banguna na Yo,
ndenge nini nayoka batelemeli na Yo nkele te ?
22 Nayinaka bango makasi ;
nazwaka bango lokola banguna na ngai.
 
23 Oh Nzambe, kundola mpe yeba mozindo
ya motema na ngai,
meka ngai mpe yeba makambo oyo ezali kotungisa ngai !
24 Tala soki nazali kotambola na nzela mabe
mpe tambolisa ngai na nzela ya tango nyonso !