Nzembo 141
Simba ngai kati na loboko na Yo
Nzembo ya Davidi.
Yawe, nazali kobelela Yo ; yaka noki epai na ngai !
Yoka mongongo na ngai, wana nazali kobelela Yo !
Liboso na Yo, tika ete libondeli na ngai ezala
lokola mbeka ya malasi,
mpe botombwami ya maboko na ngai ezala
lokola mbeka ya pokwa !
Yawe, kengela monoko na ngai,
batela malamu ekuke ya bibebu na ngai !
Kotindika motema na ngai te na mabe,
mpo ete namipesa te na mobulu
elongo na bato ya misala mabe
mpe nalia bilei te elongo na bango.
 
Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ;
soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ;
moto na ngai ekoboya yango te.
Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.
 
Tika ete bilombe na bango babwakama na mabanga ;
na bongo, maloba na ngai ekoyokana,
pamba te ezali kitoko.
Lokola tango babalolaka mpe batimolaka mabele,
mikuwa na biso epanzani liboso ya mboka ya bakufi.
Yawe, Nkolo na ngai,
miso na ngai ebaluki mpo na kotala Yo ;
nazali kobombama kati na Yo,
kotindika ngai na kufa te !
Batela ngai mpo ete nakangama te na motambo na bango
mpe nakweya te na mabulu ya bato ya misala mabe.
10 Tika ete bato mabe bakangama
na mitambo na bango moko,
mpe ete ngai naleka na kimia !