Nzembo 144
Bato na Yo bazali na esengo
Nzembo ya Davidi.
Tika ete Yawe, Libanga na ngai, apambolama ;
Ye oyo akembisaka maboko
mpe makofi na ngai mpo na bitumba !
Azali bolingo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi,
ebombamelo mpe mokangoli na ngai,
nguba mpe ekimelo na ngai ;
Ye nde atiaka bato na ngai na se ya bokonzi na ngai.
 
Oh Yawe, moto nde nani mpo ete obatelaka ye ?
Moto nde nani mpo ete okanisaka ye ?
Moto azali lokola mopepe,
mikolo ya bomoi na ye ezali lokola elili oyo ezali koleka.
 
Yawe, fungola likolo mpe kita awa na mabele !
Yaka kosimba bangomba mpe sala ete ebimisa milinga !
Tinda mikalikali mpe panza banguna na ngai ;
bwakela bango makonga na Yo mpe bungisa bango nzela.
Tanda loboko na Yo wuta kuna na likolo
mpo na kobikisa mpe kokangola ngai
na mayi minene, na maboko ya bapaya
oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta
mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.
 
Oh Nzambe, nakoyembela Yo nzembo ya sika,
nakobetela Yo lindanda ya basinga zomi.
10 Ezali Yo, Nzambe, nde opesaka bakonzi elonga,
obikisaka Davidi, mosali na Yo,
liboso ya mopanga oyo ebomaka.
11 Bikisa mpe kangola ngai na maboko ya bapaya
oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta
mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.
 
12 Bana mibali na biso bazali lokola milona,
bazali kokola malamu wuta na bomwana na bango ;
bana basi na biso bazali lokola bililingi kitoko
oyo batoboli na bamir ya ndako ya mokonzi.
13 Bibombelo na biso etondi
na biloko ya ndenge na ndenge ;
bameme na biso ezali kobotana na minkoko,
na bankoto zomi kati na bitonga na biso ;
14 bangombe na biso ezali minene ;
likama ezali te, zemi ezali kosopana te,
mpe koganga moko te ya pasi ezali koyokana
na bisika na biso.
 
15 Esengo na bato oyo batondisami na bolamu ya boye !
Esengo na bato oyo Yawe azali Nzambe na bango !