Nzembo 18
Natondi Yo mpo ete okangoli ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.
Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo.
 
Yawe azali libanga na ngai,
ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ;
azali Nzambe na ngai, libanga na ngai
mpe ebombamelo na ngai ;
azali nguba na ngai,
Mobikisi na ngai,
mpe ekimelo na ngai.
Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu,
mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.
Basinga ya kufa efinaki ngai,
mpela ya libebi epesaki ngai somo.
Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai,
mitambo ya kufa ekangaki ngai.
 
Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,
nagangaki epai ya Nzambe na ngai
mpo ete asunga ngai.
Yawe ayokaki mongongo na ngai
wuta na Tempelo na Ye ;
koganga na ngai mpo na kosenga lisungi
ekomaki kino na matoyi na Ye.
Mabele ekomaki koningana makasi,
miboko ya bangomba elengaki mpe ebukanaki,
pamba te Yawe asilikaki.
Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye,
moto makasi elongo na makala ya moto
ekomaki kobima na monoko na Ye.
10 Yawe afungolaki Lola mpe akitaki ;
mapata ya mwindo ezalaki na
se ya matambe na Ye.
11 Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki,
apepaki na mapapu ya mopepe.
12 Akomisaki molili ebombamelo na Ye,
kapo na Ye, oyo ezingelaki Ye ;
mapata minene ezingelaki Ye,
mwindo lokola mayi ya mozindo.
13 Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye
ezalaki kokimisa mapata,
konokisa mvula ya mabanga
mpe kobimisa makala ya moto.
14 Yawe agangaki wuta na Lola,
mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki
na nzela ya mvula ya mabanga
mpe makala ya moto.
15 Abwakaki makonga na Ye
mpe atindaki yango na bangambo nyonso ;
abakisaki motango ya mikalikali
mpo na kopalanganisa yango.
16 Yawe, tango ogangelaki yango,
na nzela ya pema na Yo
mpe ya milinga ya zolo na Yo,
nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki,
miboko ya mokili emonanaki na libanda.
 
17 Atandaki loboko na Ye wuta na likolo,
akamataki ngai mpe abimisaki ngai
na likama oyo nazalaki na yango
kati na mayi ya mozindo makasi ;
18 akangolaki ngai wuta na maboko
ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai,
pamba te balekaki ngai na makasi.
19 Babundisaki ngai,
na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai,
kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.
20 Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi,
akangolaki ngai,
pamba te alingaka ngai.
 
21 Yawe asaleli ngai makambo wana
kolanda bosembo na ngai,
afuti ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai ;
22 pamba te nabateli banzela ya Yawe,
napesi Nzambe na ngai mokongo te
lokola bato mabe.
23 Natosaka mibeko na Ye nyonso
mpe nabatelaka bikateli na Ye.
24 Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela
mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te.
25 Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai,
kolanda bopeto ya maboko na ngai
na miso na Ye.
 
26 Solo, otalisaka bosembo na Yo
epai ya moto oyo atambolaka na bosembo,
mpe bolamu na Yo, epai ya moto oyo azangi pamela.
27 Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto,
kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka.
28 Yo nde obikisaka banyokolami,
okitisaka bato na lofundu.
29 Yawe, Nzambe na ngai,
Yo nde opelisaka mwinda na ngai ;
obongolaka molili na ngai pole.
30 Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli ;
mpe na lisungi ya Nzambe na ngai,
nakatisaka bamir.
31 Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka,
Liloba na Yawe ezali na mbeba te ;
azali nguba mpo na bato nyonso
oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
32 Nani azali Nzambe soki Yawe te ?
Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ?
33 Nzambe apesaka ngai makasi
mpe akomisaka nzela na ngai ya kokoka ;
34 akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko,
mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo ;
35 alakisaka ngai kobunda,
mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.
36 Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai,
loboko na Yo ya mobali elendisaka ngai,
mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
37 Otambolisaka ngai na kimia,
mpe makolo na ngai elengaka te.
 
38 Nalandaka banguna na ngai,
mpe nakangaka bango ;
nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango.
39 Nabebisaka bango nye,
mpe bakokaka lisusu kotelema te ;
bakweyaka na se ya matambe na ngai.
40 Opesaka ngai makasi ya bitumba,
ogumbaka banguna na ngai
mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.
41 Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai,
mpe nabebisaka bayini na ngai.
42 Bagangaka mpo na koluka lisungi,
kasi moto oyo akokaki kobikisa bango azalaka te ;
babelelaka Yawe, kasi ayanolaka bango te.
43 Nanikaka bango lokola putulu
oyo mopepe epumbwisaka,
nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.
44 Olongisaka ngai na bitumba ya bato,
obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo.
Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.
45 Soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai ;
mpe bapaya bayaka
mpo ete nasepela na bango.
46 Bango nyonso balembi nzoto
mpe bakomi kobima na kolenga
wuta na bandako na bango ya makasi.
 
47 Longonya na Yawe !
Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama !
Tika ete Nzambe ya lobiko na ngai anetolama !
48 Azali Nzambe oyo abundelaka ngai,
oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai,
49 oyo akangolaka ngai
wuta na maboko ya banguna na ngai.
Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai,
obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
50 Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo ;
nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
 
51 Yawe apesaka elonga monene
epai ya mokonzi na Ye,
atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye,
epai ya Davidi mpe epai ya libota na ye, mpo na libela.