Nzembo 24
Yawe akoti na Tempelo
Nzembo ya Davidi.
Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango
ezali ya Yawe.
Mokili mpe ezali ya Yawe,
elongo na bavandi na yango.
Pamba te ezali Yawe nde atia yango
na likolo ya bibale minene
mpe apikaki yango na likolo ya miluka.
Nani akokoka komata ngomba ya Yawe ?
Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule ?
Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto,
oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko
mpe alapaka ndayi ya lokuta te.
 
Yawe akopambola ye ;
mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.
Ndenge wana nde ezali,
ekeke ya bato oyo bakangamaka na Yo,
ba-oyo balukaka elongi na Yo, Nzambe ya Jakobi.
 
Bino bikuke, botombola mitondo na bino !
Bino bikuke ya kala, bomitombola !
Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !
Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ?
Ezali Yawe, Elombe ya nguya ;
Yawe, Elombe ya bitumba.
Bino bikuke, botombola mitondo na bino !
Bino bikuke ya kala, bomitombola !
Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !
10 Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ?
Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga,
nde azali Mokonzi ya nkembo !