Nzembo 4
Yawe apesaka kimia
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda.
Nzambe, bosembo na ngai,
soki nabeleli Yo, yanola ngai.
Kangola ngai na pasi,
salela ngai ngolu,
mpe yoka libondeli na ngai.
 
Bino bato, kino tango nini bokoyokisa
nkembo na ngai soni ?
Kino tango nini bokomisepelisa
na makambo ya pamba
mpe bokolanda makambo ya lokuta ?
 
Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko
mosali oyo azali sembo na miso na Ye ;
Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.
Soki bosiliki, bosalaka masumu te ;
soki bolali na mbeto,
bolukaka kososola makambo
mpe bovandaka kimia.
 
Bobonzaka bambeka kolanda mibeko
mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.
Bato mingi bazali kotuna :
« Nani akomemela biso bolamu ? »
Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.
 
Tondisa motema na ngai na esengo
soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.
Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia,
pamba te, Yo moko Yawe, osalaka
ete navanda na kimia.