Nzembo 52
Suka ya mozwi oyo anyokolaka bato
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki.
Yo elombe, mpo na nini ozali komikumisa
na tina na mabe ?
Bolingo ya Nzambe emonanaka mikolo nyonso.
Yo oyo otambolaka na lokuta,
lolemo na yo esalaka mabongisi ya libebi,
ekosaka lokola mbeli bapelisa malamu.
Olingaka mabe koleka bolamu,
lokuta koleka koloba bosolo.
Oh lolemo ya lokuta,
olingaka maloba nyonso oyo epanzaka.
 
Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela,
akokanga yo kati na ndako na yo,
akobwaka yo libanda
mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.
Bato ya sembo bakomona
mpe bakokoma na somo,
bakotiola ye na maloba oyo :
« Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambe
lokola ebombamelo na ye,
azalaki kotiela bozwi na ye motema,
mpe kobakisa makasi na ye
na nzela ya kobebisa bato mosusu. »
 
10 Kasi ngai, kati na Ndako na Yo,
nazali lokola nzete ya olive
oyo etondi na makasa ya mobesu ;
natiaka tango nyonso elikya na ngai
kati na bolingo monene ya Nzambe, mpo na libela.
11 Nakosanzola Yo mikolo nyonso,
mpo na oyo osali ;
mpe nazalaka na elikya kati na Kombo na Yo,
pamba te ozali malamu mpo na bayengebene na Yo.