Nzembo 93
Yawe akonzaka mpo na libela na libela
Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ;
Yawe alati penza lokumu monene
mpe amizingeli na nguya.
 
Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.
Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ;
seko na seko, ozali.
 
Yawe, bibale egangaka !
Bibale etombolaka lokito na yango ;
bibale etombolaka makelele na yango.
 
Yawe azali monene makasi,
na bisika ya likolo ;
aleki lokito ya mayi minene,
mpe bambonge milayi ya ebale monene.
 
Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ;
bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.