Nzembo 99
Bogumbamela Yawe, pamba te azali Mosantu
Yawe azali kokonza ;
tika ete bato balenga !
Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ;
tika ete mabele eningana !
Yawe azali monene kati na Siona,
mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso.
Tika ete Kombo na Yo ya monene
mpe ya somo esanzolama ;
ezali bule !
 
Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo.
Olendisaka bosembo.
Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi.
Bonetola Yawe, Nzambe na biso,
mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye ;
azali Mosantu.
 
Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye,
mpe Samuele kati na bato
oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye,
bazalaki kobelela Yawe,
mpe Ye azalaki koyanola bango.
Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata.
Babatelaki malako na Ye
mpe mibeko oyo apesaki bango.
 
Yawe, Nzambe na biso, oyanolaki bango.
Mpo na bango, ozalaki Nzambe oyo alimbisaka
atako opesaki bango etumbu
mpo na misala na bango ya mabe.
 
Bonetola Yawe, Nzambe na biso,
mpe bogumbama na kotala
na ngambo ya ngomba na Ye ya bule.
Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.