12
Maloba ya suka ya Samuele
Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele :
— Napesi nyonso oyo bolobaki na ngai : natieli bino mokonzi. Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo. Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.
Bato bazongiselaki ye :
— Onyokolaki biso te mpe omonisaki biso pasi te ; ozwaki ata eloko moko te na maboko ya moto.
Samuele alobaki na bango :
— Yawe azali Motatoli mpo na kotelemela bino, mpe mopakolami na Ye azali motatoli na mokolo ya lelo ete bomoni ata eloko moko te kati na maboko na ngai.
Bato bazongisaki :
— Azali penza Motatoli.
Bongo Samuele alobaki na bato :
— Ezali Yawe nde aponaki Moyize mpe Aron, mpe Ye nde abimisaki bakoko na bino na Ejipito. Sik’oyo, botelema awa liboso na Ye, pamba te nalingi kosamba na bosolo elongo na bino, liboso ya Yawe, na tina na makambo nyonso ya bosembo oyo Yawe asalaki mpo na bino mpe mpo na bakoko na bino.
Sima na Jakobi kokota na Ejipito, bakoko na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi. Mpe Yawe atindaki Moyize mpe Aron oyo babimisaki bango na Ejipito mpo na kovandisa bango na esika oyo. Kasi babosanaki Yawe, Nzambe na bango. Yango wana Ye Yawe akabaki bango na maboko ya Sisera, mokonzi ya basoda ya Atsori ; na maboko ya bato ya Filisitia mpe na maboko ya mokonzi ya Moabi oyo babundisaki bango. 10 Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi ; balobaki : « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. »
11 Boye, Yawe atindaki Yerubali oyo babengi Jedeon, Bedani, Jefite mpe Samuele. Akangolaki bino na maboko ya banguna na bino, oyo bazingelaki bino na bangambo nyonso. Mpe bovandaki na kimia.
12 Kasi tango bomonaki Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, koya kobundisa bino, bolobaki na ngai : « Te ! Tozali na posa ya mokonzi mpo na kokamba biso. » Nzokande ezali Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki mokonzi na bino. 13 Sik’oyo, botala mokonzi oyo boponaki, mokonzi oyo bosengaki. Ezali Yawe nde atie ye mokonzi mpo na kokamba bino. 14 Kobanda lelo, soki botosi Yawe, soki bosaleli Ye, soki bobateli mitindo na Ye, mpe soki bino elongo na mokonzi oyo azali kokamba bino bolandi Yawe, Nzambe na bino, makambo nyonso ekotambola malamu. 15 Kasi soki botosi Yawe te mpe bobateli te mibeko na Ye, loboko na Ye ekobalukela bino ndenge ebalukelaki bakoko na bino.
16 Yango wana sik’oyo lisusu, bobongama mpo na kotala likambo monene oyo Yawe alingi kosala na miso na bino. 17 Boni, mokolo ya lelo ezali te tango ya kobuka ble ? Nakobelela Yawe mpo ete atinda kake mpe mvula, bongo bokomona mpe bokososola ndenge nini ezali monene, mabe oyo bosalaki na miso ya Yawe tango bosengaki mokonzi.
18 Bongo Samuele abelelaki Yawe, mpe, na mokolo wana kaka, Yawe atindaki kake mpe mvula. Boye bato nyonso babangaki makasi Yawe mpe Samuele. 19 Bato nyonso balobaki na Samuele :
— Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso.
20 Samuele azongiselaki bango :
— Bobanga te ! Solo, bosalaki mabe nyonso wana ; nzokande bokoba te kozala mosika na Yawe, kasi bosalela Yawe na mitema na bino mobimba. 21 Bopengwa te na kolanda banzambe na bino ya bikeko, oyo ezanga na yango tina, oyo ekoki kosalela bino ata bolamu moko te, oyo ekoki te kobikisa bino, pamba te ezali banzambe ezanga tina. 22 Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko. 23 Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima. 24 Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba ; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino. 25 Kasi soki bokobi kosala mabe, bino mpe mokonzi na bino bokobebisama.