17
Yawe akakoli batoli ya Ayitofeli
Ayitofeli alobaki na Abisalomi :
— Nakopona mibali nkoto zomi na mibale mpe nakolanda Davidi na pokwa ya lelo. Nakobundisa ye tango makasi na ye ekosila mpe nzoto na ye ekolemba ; nakoyeisa mobulu epai na ye, mpe wana bato nyonso oyo bazali elongo na ye bakokima, ngai nakoboma ye mokonzi tango akotikala ye moko ; mpe nakozongisa bato nyonso epai na yo. Kufa ya moto oyo ozali koluka elakisi kozonga ya bato nyonso ! mpe bato nyonso bakozala na kimia.
Makanisi oyo emonanaki ya sembo na miso ya Abisalomi mpe ya bampaka nyonso ya Isalaele. Kasi Abisalomi alobaki :
— Bobengisa lisusu Ushayi, moto ya Ariki, mpo ete toyoka makambo nini oyo ye mpe azali na yango ya koloba.
Tango Ushayi akomaki epai na ye, Abisalomi alobaki :
— Tala toli oyo Ayitofeli apesi. Boni, tosengeli kosala makambo oyo alobi ? Soki te, yebisa biso makanisi na yo.
Ushayi azongiselaki Abisalomi :
— Ya mbala oyo, toli oyo Ayitofeli apesi ezali malamu te.
Bongo Ushayi abakisaki :
— Oyebi ete tata na yo mpe bato na ye bazali bato ya mpiko mpe bato na kanda makasi lokola ngombolo ya mwasi oyo bawuti kobotola bana na yango kati na zamba. Tata na yo azali moto oyo abundaka bitumba wuta kala, akolekisa te butu esika moko na bato. Ata azali sik’oyo ya kobombama kati na lidusu ya mabanga to na esika songolo, nzokande tango kaka bato kati na mampinga na biso bakobanda kokufa, ekozanga te komonana moto oyo akoyoka yango mpe akoloba : « Kati na bato oyo bazali kolanda Abisalomi, ebele bakufi. » 10 Bongo na tango yango, ata soda oyo aleki na mpiko, oyo azali na motema lokola ya nkosi, akobanga makasi, pamba te Isalaele mobimba eyebi ete tata na yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ye bazali basoda ya mpiko. 11 Boye tala toli na ngai : « Tika ete Isalaele mobimba basangana epai na yo, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bazala ebele lokola zelo ya ebale monene ! Bongo yo moko okotambola liboso na bango na bitumba. 12 Bongo tokobundisa ye na bisika nyonso oyo akoki komonana mpe tokokweyela ye ndenge manoka ekweyaka na mabele. Mpe ezala ye to bato na ye, moko te akotikala na bomoi. 13 Soki akimi na engumba moko, Isalaele mobimba ekomema basinga kuna na engumba yango mpe tokobenda engumba yango na lubwaku kino etikala ata na libanga moko te. »
14 Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki :
— Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.
15 Ushayi alobaki na Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari :
— Ayitofeli apesaki toli na Abisalomi mpe na bampaka ya Isalaele ete basala likambo songolo, mpe ngai napesi bango toli ete basala likambo pakala. 16 Sik’oyo, tinda noki sango epai ya Davidi mpo na koloba na ye : « Kolekisa te butu kati na bitando ya esobe, kasi kende mosika, noki te mokonzi mpe bato oyo bazali elongo na yo bokufa. »
17 Wana Jonatan mpe Ayimaatsi bavandaki na Eyini-Rogeli, mwasi mosali moko amemelaki bango sango oyo bango basengelaki kokende koyebisa mokonzi Davidi ; pamba te basengelaki te kokota kati na engumba mpo ete bamona bango te. 18 Nzokande elenge mobali moko amonaki bango mpe akendeki koyebisa Abisalomi. Boye mibali nyonso mibale bakimaki noki mpe bakendeki na ndako ya moto moko ya Bawurimi. Lokola azalaki na libulu moko ya mayi kati na lopango na ye, bakitaki kuna. 19 Mwasi na ye akamataki kapo, atiaki yango na monoko ya libulu mpe asopaki bambuma na likolo na yango. Moto moko te ayebaki likambo yango. 20 Tango bato ya Abisalomi bayaki epai ya mwasi, batunaki :
— Ayimaatsi mpe Jonatan bazali wapi ?
Mwasi azongiselaki bango :
— Bakatisi mayi.
Bato ya Abisalomi balukaki, kasi bamonaki moto moko te ; mpe bazongaki na Yelusalemi. 21 Tango bakendeki, Ayimaatsi mpe Jonatan babimaki na libulu mpe bakendeki koyebisa mokonzi Davidi : « Botelema mpe bokatisa mayi noki, pamba te Ayitofeli apesi toli moko ya mabe na tina na yo. »
22 Boye Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakatisaki ebale Yordani. Liboso ete tongo etana, bango nyonso basilisaki kokatisa Yordani, moko te atikalaki.
23 Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.
24 Davidi akendeki na Maanayimi, mpe Abisalomi akatisaki Yordani elongo na bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki elongo na ye. 25 Abisalomi atiaki Amasa mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi. Amasa azalaki mwana mobali ya Yeteri, moto ya Isalaele, oyo abalaki Abigayili, mwana mwasi ya Naashi mpe ndeko mwasi ya Tseruya, mama ya Joabi. 26 Bato ya Isalaele mpe Abisalomi batongaki molako na bango kati na Galadi.
27 Tango Davidi akomaki na Maanayimi, bayambaki ye epai ya Shovi, mwana mobali ya Naashi ya mboka Raba ya bato ya Amoni, epai ya Makiri, mwana mobali ya Amieli ya mboka ya Lo-Debari, mpe epai ya Barizilayi, moto ya Galadi ya mboka Rogelimi. 28 Bamemaki biloko ya kolalela, bambeki, basani, ble, orje, farine, bambuma oyo bakalinga, madesu, mpe misili, 29 mafuta ya nzoyi, miliki, bameme, fromaje ya ngombe, mpo ete Davidi elongo na bato na ye balia ; pamba te bazalaki kolobana bango na bango : « Solo, sima na bango kotambola kati na esobe, bato oyo balembi, bazali konyokwama na nzala mpe na posa ya mayi. »