20
Sheba atombokeli Davidi
Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »
Bato nyonso ya Isalaele bakimaki Davidi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. Kasi bato ya Yuda batikalaki pembeni ya mokonzi na bango, na nzela mobimba, longwa na Yordani kino na Yelusalemi.
Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.
Mokonzi alobaki na Amasa : « Bengela ngai bato nyonso ya Yuda na mikolo misato, yo moko mpe zala awa. »
Kasi tango Amasa akendeki kobenga bato ya Yuda, azwaki tango molayi koleka oyo mokonzi apesaki ye. Davidi ayebisaki Abishayi : « Sheba, mwana mobali ya Bikiri, akomonisa biso pasi mingi koleka Abisalomi. Kamata basali ya mokonzi mpe landa ye, noki te akomona bingumba batonga makasi mpe akokima biso. »
Boye na bokambami ya Abishayi, bato ya Joabi, bato ya Kereti, bato ya Peleti mpe basoda nyonso ya mpiko, babimaki na Yelusalemi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
Tango bakomaki na libanga monene kati na Gabaoni, Amasa ayaki kokutana na bango. Joabi alataki bilamba na ye ya basoda : na loketo na ye, alataki mokaba oyo kati na yango atiaki mopanga oyo ezalaki kati na ebombelo na yango na loketo. Bongo tango abandaki kopusana, mopanga yango ekweyaki.
Joabi alobaki na Amasa : « Boni ndeko na ngai ya mobali, ozali malamu ? »
Bongo Joabi asalelaki loboko na ye ya mobali mpo na kosimba Amasa na mandefu mpe kopesa ye beze. 10 Amasa azalaki na bokebi te mpo na kotala mopanga oyo ezalaki na loboko ya mwasi ya Joabi. Bongo Joabi atobolaki ye libumu, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki kino na se ; mpe Amasa akufaki mbala moko. Joabi azalaki te na tina na kotuba ye mopanga na mbala ya mibale. Boye Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, balandaki Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
11 Moto moko kati na bato ya Joabi atelemaki pembeni ya Amasa mpe alobaki : « Tika ete bato nyonso oyo bazali mpo na Joabi mpe mpo na Davidi balanda Joabi ! »
12 Nzokande, wana Amasa azalaki kobaluka kati na makila na ye na kati-kati ya nzela, moto yango amonaki ete mampinga nyonso bayaki kotelema wana. Boye abendaki Amasa libanda ya nzela, atandaki ye kati na elanga mpe afinikaki ye elamba. 13 Sima na ye kolongola Amasa na nzela, bato nyonso bakendeki elongo na Joabi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
14 Mpo na kokoma na Abele-Beti-Maaka, Sheba akatisaki bikolo nyonso ya Isalaele mpe etuka mobimba ya bato ya Berimi oyo mpe basanganaki mpe balandaki Joabi. 15 Joabi elongo na mampinga na ye nyonso bazingelaki Sheba kati na Abele-Beti-Maaka mpe batongaki na libanda ya engumba mwa ngomba oyo ekomaki na molayi ya mir. Tango bazalaki kotimola mabele mpo na koluka kokweyisa mir, 16 mwasi moko ya bwanya agangaki wuta na engumba : « Boyoka ! Boyoka ! Boyebisa Joabi ete aya awa mpo ete naloba na ye. »
17 Joabi apusanaki pene na ye, mpe mwasi yango atunaki ye :
— Yo nde Joabi ?
Azongisaki :
— Iyo, ezali ngai.
Mwasi alobaki :
— Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba.
Joabi azongisaki :
— Nazali koyoka.
18 Mwasi yango akobaki koloba :
— Na kala, bazalaki na ezaleli ya koloba : « Botuna mayele na mboka Abele, » mpe likambo esili. 19 Tozali bato ya kimia mpe ya sembo kati na Isalaele. Kasi yo ozali koluka koboma engumba oyo ezali mama kati na Isalaele ! Mpo na nini olingi kobebisa libula ya Yawe ?
20 Joabi azongisaki :
— Mosika na ngai ! Mosika na ngai likanisi ya kobebisa to koboma ! 21 Ezali bongo te. Kasi Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, atombokelaki mokonzi Davidi. Kaba ye, ye moko kaka, mpe nakotika kozingela engumba.
Mwasi yango alobaki na Joabi :
— Bakobwakela yo moto na ye na likolo ya mir.
22 Bongo mwasi akendeki epai ya bato nyonso mpe ayebisaki bango maloba na ye ya bwanya. Boye bakataki moto ya Sheba, mwana mobali ya Bikiri, mpe babwakelaki yango Joabi. Bongo Joabi abetaki kelelo, mpe bato na ye bapanzanaki liboso ya engumba ; moto na moto azongaki na ndako na ye. Joabi mpe azongaki na Yelusalemi epai ya mokonzi.
Bakalaka ya Davidi
23 Joabi azalaki kokamba mampinga nyonso ya Isalaele ; Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe bato ya Peleti. 24 Adorami azalaki kokamba misala makasi ; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ; 25 Sheva azalaki mokomi mikanda ; Tsadoki mpe Abiatari bazalaki Banganga-Nzambe ; 26 mpe Ira, moto ya Yairi, azalaki Nganga-Nzambe ya Davidi.